10.Jonas

  1. Alif, lâm, râ. Wana ezali mikapo ya buku ya bwanya
  2. Ezali kokamwisa bato ete topesaki boyebi na mobali moko kati na bango mpo akebisa bato mpe apesa sango elamu epai ya baye bazali kondima, ya soló, bango bazali na lokumu epai ya Nkolo wa bango (тропа mokolo mwa lobi)? Мре bapengwi balobi oyo azali nganga ya polele
  3. Ya soló, Nkolo wa bino nde Allah oyo akelaki likolo na mabele na mikolo motoba, sima atombuami likolo ya ngwende azali kotambwisa makambo manso. Moko te akolobelela moninga sé sima ya ye kopesa ndingisa. Wana nde Allah Nkolo wa bino, bobondela ye. Boye bozali kokanisa te
  4. Epai naye nde bokozongisama bino banso; elaka ya Allah ezali sólo, yende abanda kokela bikelamu bia ye mbala ya liboso, sima akosekwisa biango lisusu, mpo afuta na bosembo baye bandimaki mpe basalaki misala milamu. Mpe bapengwi bakomelaka mayi ya moto mpe bakozala na etumbu ya makasi na ntina ete bazalaki bapengwi
  5. Ye nde akela mwese (moyi) lokola muinda mpe akela sanza engengisaka, mpe akokisaki botamboli bia yango, mpo boyeba kotanga mibu, mpe boyeba mituya. Allah akelaki yango te sé na bosôló, azali kolimbola bilembo bia ye mpo bato bayeba
  6. Ya soló, na kati ya bokeseni ya butu mpe moyi mpe na manso maye Allah akela na likolo mpe na mabele, ezali bilembo тропа bato baye bazali kobanga
  7. Ya solo, baye bazali kolikya te kokutana na biso, mpe basepeli na bomoyi ya nsé mpe bamoni ete bazali na kimia тропа yango, ndenge moko na baye bazali kokanisa te na mikapo mpe bilembo bia biso
  8. Baye bana esika na bango ekozalaka nde na moto тропа maye bazalaki kosala
  9. Ya solo, baye bandimaki mpe basalaki misala milamu, Nkolo wa bango akokambaka bango тропа bondimi. Na bango bakozalaka o Iola eye ezali koleka o nsé na yango mingala, bakovandaka o Iola eye etonda bomengo
  10. Kuna na kati kosenga na bango ekozalaka sé ete: Lokumu nayo Nzambe, mpe losako na bango ekozala sé kimia, mpe mabondeli na bango ya suka nde ete matondi na Allah Nkolo wa molongo
  11. Mpe soki Allah atiyelaka bato mabe ezua bango na lombango ndenge balukaka bolamu na lombangu, nde suka ya bomoyi bwa bango esila kokoka. Mpe topesi elaka na baye bazali kolikya te na bokutani bwa biso. Bazali na koyimayima na kati ya kolekisa ndelo
  12. Mpe soki pasi ezui moto, abengi biso, mpe alali na mopanzi to azali ya kovanda to ya kotelema; mpe tango tokolongola ye pasi ena, akomi kotambola lokola moto abelelaki biso na pasi ezuaki ye te. Na boye nde ebongisami mpo na bato mabe maye bazalaki kosala
  13. Mpe ya soló, tosilaki koboma mapinga ebele maye malekaki liboso lia bino, тропа bobubi bwa bango, mpe batindami ba bango bayelaki bango bilembo bia polele, kasi bandimaki te. Ndenge wana nde tokofutaka batomboki
  14. Sima na bango, tokitanisaki bino o kati ya mokili, mpo totala ndenge nini bokosala
  15. Mpe soki batangeli bango mikapo mia biso mia polele, baye bazali kolikya na bokutani na biso te, bakolobaka: Yaka na kurani mosusu kasi oyo te, to bobongola yango! Loba: Esengeli na ngai te kobalola yango na lolenge na ngai, nazali kolanda bobele maye bayebisaki ngai. Ya soló, nazali kobanga soki nazangi botosi na Nkolo wa ngai, noki nakozua etumbu enene o mokolo mwa suka
  16. Loba ete: Soki Allah alingaki, nde natangeli bino yango te, nde mpe nalakisi bino yango te. nasilaki kofanda na bino mibu miyike liboso na yango, boye bozali kokanisa te
  17. Mpe oyo alekisi kobuba nde oyo azali kobukela Allah lokuta, to aboyi kondimela mikapo mia ye? Ya solo, ye akolongisa batomboki te
  18. Mpe bazali kobondela basusu baye bakoki kosala bango mabe to malamu te, batiki Allah, mpe bazali koloba: Ba oyo nde bakolobelela biso epai ya Allah. Loba: Bolingi koloba ete Allah ayebi te maye mazali o likolo na mabele? Lokumu naye Nkolo wa likolo na maye bazali kosangisa ye na yango
  19. Mpe bato bazalaki (na ebandeli) sé umma moko sima bakabwani na bokeseni na bango. Soki ezalaki na mokano ya Nkolo nayo te, nde likambo lisilaki kokatama kati na bango na ntina ya maye bazalaki kokesene na yango
  20. Bakolobaka ete: Soki ata Nkolo naye akitiselaka ye likamwisi liwuta epai ya Nkolo waye! Mpe loba: Ya soló, mabombami mazali ya Allah, na yango bozela, ya sólo, ngai mpe nazali kozela elongo na bino
  21. Mpe soki topesi bato bolamu o sima ya mabe kozua bango, bakomi kobundisa mikapo mia biso. Loba: Allah azali lombango na mwango. Ya sólo batindami na biso (ba anzelu) bazali кокота mwango bozali kosala
  22. Yende azali kotambwisa bino na mokili mpe na ebale. Kino tango bozalaka o kati ya masua, azali kotindela bino mopepe ya kitoko, bozali kosepela na yango. Kino mopepe makasi ya mabe mpe na mbonge moko wuta bipai na bipai mpe bamoni, ete basili kozingama mpe bakomi kobelela Allah na bosembo mpenza, koloba: Soki obikisi biso na oyo, tokozala kati ya baye bazali kotonda yo
  23. Mpe soki abikisi bango, okomona bango bakomi kobebisa na bobubi o kati na mokili, batiki bosôló. Oh bino bato! Botomboki bwa bino, bokozongela sé bino moko. Bomoyi búa nsé bisengo ya ntango шоке, sima epai na biso nde bokozongisama, mpe tokoyebisaka bino maye bozalaki kosala
  24. Ya soló, ndakisa ya bomoyi bwa nsé ezali lokola mayi tokitisaka kowuta o likolo, mpe esangani na milona (matiti) ya mabele, ezali koleisa bato na banyama, kino mabele ekozua bonzenga na yango mpe ekomisi bilanga kitoko, bakolo na yango bazali kokanisa ete bazali na bokoki likolo na yango, mpe mokano na biso moko eyelaki yango butu to moyi, mpe tokomisi yango pamba lolenge mosusu lokola eloko ezalaki te liboso. Lolenge wana nde tozali kolimbola bilembo bia biso, mpo bato bakoka kososolo
  25. Allah azali kobenga bato na ndako ya kimia, mpe akambaka oyo alingi o nzela ya semba
  26. Mpona baye bazali kosala bolamu, babombeli bango (lifuti) ya kitoko koleka na litabisi mpe bilongi bia bango bikoyindaka na milinga te, mpe bikokitisama te. Bango nde bato ba Iola, bakovandaka libela kati na yango
  27. Mpe baye basalaki mabe, bakofutamaka na mabe lokola yango, mpe milinga miyindo mia mabe mikolinga bango. Bakosalisaka bango na etumbu ya Allah te, lokola eteni ya butu na molili ya makasi mozipaki bilongi bia bango. Bango nde bato ba moto, bakovandaka libela o kati na yango
  28. Mpe kanisa mokolo moye tokosangisaka bango banso, sima tokolobaka na baye basangisaki (ngai na banzambe mosusu): Wapi esika na bino na banzambe na bino! Mpe tokaboli kati na bango mpe banzambe na bango bakoloba ete: Bozalaki kobondela biso te
  29. Allah akoki lokola nzeneneke kati na biso na bino. Ya soló, penza tozalaki na bokeseni na mabondeli na bino
  30. Na tango wana molimo na molimo akoyeba maye awelisaki kosala liboso. Mpe sima, bakozongisama epai ya Allah mokonzi na bango ya sólo, mpe bakobungisa maye manso basalaki
  31. Loba: Nani azali koleisa bino kowuta na likolo mpe na nsé?, тре nani apesaka bomoni na boyoki? Mpe nani apesaka bomoyi kowuta na liwa, mpe liwa kowuta na bomoyi, mpe nani azali kokamba mokili? Bakolobaka: Allah. Мре loba na bango: Boye bozali kobanga te
  32. Wana nde Allah, Nkolo wa bino ya soló. Nini sima ya bosembo eyaka sé libungi, kasi тропа nini bozali kotengama
  33. Ndenge wana nde liloba lia Nkolo wayo lizalaki solo epai ya baye babebisaki, mpo solo penza bazalaki kondima te
  34. Loba: Nalingi koyeba banzambe na bino, basusu kati na bango bakelaka mpe bazongisaka ekelamu na bomoyi (o sima ya liwa?) loba: Allah ye mei nde abandaki ekelamu mpe akozongisa ye, тропа nini bolingi komitiya mosika na kokumisa ye
  35. Loba: Boye okati ya banzambe na bino, ezali na moko oyo azali kokamba na nzela ya bosembo? Loba: Allah nde akambaka na bosoló, boye oyo akambaka na nzela ya bosóló nde akoki ete balanda to oyo akambaka sé soki akambami? Ndenge nini bozali kokata likambo na motindo oyo
  36. Mpe ebele kati na bango bazali kolanda sé makanisi, kasi makanisi ekosala bosembo eloko moko te, ya soló Allah ayebi malamu maye bazali kosala
  37. Kurani oyo ekoki kokelama te mpe bakoki kopesa yango na moto mosusu te na esika ya Allah, kasi; eyei тропа kondima na oyo ekitaki liboso na yango, mpe ezali ndimbola ya buku, tembe ezali te kati na yango, ewuti epai ya Nkolo ya molongo
  38. To bazali koloba ete: (Muhammad) nde asalaki yango na ndenge naye, loba: Boya na suratu lokola oyo, mpe bobenga baye banso bakoki kosalisa bino na botiki Allah soki bozali bato ya bosembo
  39. Kasi baboyaki kondima na eloko ya motuya oyo bazali na boyebi na yango te mpe bososoli na yango ekomelaki mpe bango te, lolenge moko na baye balekaki liboso na bango babukaki lokuta. Mpe tala ndenge nini bato mabe basukaki
  40. O kati na bango, basusu bazali kondima na yango, mpe basusu bazali kondima na yango te. Kasi Nkolo wayo ayebi malamu babebisi koleka
  41. Mpe soki baboyi kondimela yo, loba: Nazali na mosala mwa ngai, mpe bozali na mosala mia bino. Bino bozali kowangana maye nazali kosala, ngai mpe nawangani maye bozali kosala
  42. Mpe kati na bango ezali na baye bazali koyokela yo. Boye yo nde okoyokisa bakufi matoyi, ata soki bazali koyeba te
  43. Mpe kati na bango, baye bazali kotala yo. Boye yo nde okambaka bakufi miso, ata soki bazali kornona te
  44. Ya soló, Allah abubaka bato na eloko te, bato bango moko nde bazali komibuba
  45. Mpe mokolo oyo akosangisa bango, ekozala lokola bavandaki ngonga moko ya mokolo, bakoyebana bango na bango. Kasi baye bazali koboya kondima na bokutani na Allah, bango nde bazangi, mpe bakambami te
  46. Mpe soki tolingi tokolakisa yo ndambu ya etumbu oyo tokani тропа bango, to mpe okokufa liboso mpo ete eyela bango sima nayo, mpe na sima epai na biso nde bakozongisama, mpe na suka Allah azali nzeneneke likolo ya maye bazali kosala
  47. Mpe umma nionso ezali na motindami. Mpe tango motindami na bango ayaki makambo ekatanaki na bosembo, mpe moko te abubamaki
  48. Mpe bazali koloba: Elaka ekokokaka tango nini soki bozali bato ya bosembo
  49. Loba: Nazali na eloko moko te ya kosala na nzoto na ngai kowuta na pasi to bisengo sé maye Allah akolinga. Mpe umma nionso bazali na elaka na bango. Soki ngonga yango ekoki, bakozongisa yango sima te, mpe bakotindika yango liboso te
  50. Loba: Bomoni boni, soki etumbu naye eyeli bino na butu mpe na moyi? Boye batomboki bakoki kokima yango
  51. Mpe boye soki (etumbu) ekweyeli bino bokondimaka na yango? (bakoyebisaka bino) sikoyo; bozalaki kolinga eyela bino noki
  52. Sima ekolobama na baye basalaki mabe ete: Bomeka etumbu ya libela, boye bokofutama sé na maye bosalaki
  53. Mpe bazali kotuna yo sango ya etumbu mpe lisekwa ete: Ezali ya soló? Loba: Iyo; nalapi na Nkolo wa ngai! Ezali ya soló penza. Mpe bokokoka kokima yango te
  54. Soki maye mazali na mabele ezalaki na maboko ya moto oyo asili kosala masumu ebele, alingaki kopesa yango na lombango тропа komikangola na etumbu na biso. Mpe bakobombaka mawa na bango tango bamoni etumbu, mpe bakata makambo kati na bango na bosembo, mpe bakobubamaka te
  55. Maye manso mazali kati na likolo na mabele, mazali ma Allah. Elaka ya Allah ezali solo, kasi ebele kati na bango bazali koyeba te
  56. Ye nde apesaka bomoyi mpe liwa, mpe epai naye nde bokozonga
  57. Oh bino bato! Ya sólo, malendisi masili koyela bino kowuta epai ya Nkolo wa bino, mpe yango ezali libiki (kurani) ya maye mazali okati ya mitema, ezali mpe lisungi na nzela ya bokambi mpe ngolu тропа bandimi
  58. Loba: Oyo ewuti na ngolu ya Allah na bolamu naye, mpe wana ezali mpo basepela na yango koleka maye bazali kosangisa
  59. Loba: Bomoni boni тропа bozui oyo Allah akitiseli bino, sima bokaboli yango, ya mabe na ya malamu? Loba: Boye Allah nde apesi bino ndingisa wana to bozali kobukela Allah lokuta
  60. Mpe baye bazali kobukela Allah lokuta bakanisaka nini тропа mokolo mwa suka? Ya soló, Allah azali Nkolo bolamu тропа bato, kasi ebele na bango bazali kotondo te
  61. Ozalaka kati ya moko ya likambo te, otangaka kurani te mpe bosalaka eloko te, sé ete tozala na yango ba nzeneneke tango bozali kokana тропа kosala. Mpe Nkolo nayo abungisaka eloko te ata ezali токе lokola mbuma ya zelo ezali na nsé to likolo, ata ezali токе lisusu koleka wana, na ya monene lokola, esila kokomama na buku ya polele
  62. Talá ya sólo, balingami ya Allah, kobanga ezali тропа bango te mpe bakoyoka mawa te
  63. Baye bandimaki mpe bazalaki na bobangi (Allah)
  64. Bakopesama sango elamu na bomoyi bwa mokili na o mokolo mwa suka, mpe liloba lia Allah likobongwamaka te. Wana nde elonga enene
  65. Koyoka mpasi te тропа maye bazali koloba. Ya soló, bokasi bonso bozali bwa Allah. Azali moyoki atonda boyebi
  66. Yeba ete, maye manso mazuami o likolo mpe o mabele mazali ma Allah. Baye bazali kokumisa banzambe basusu na botiki Allah, bazali kolanda nini? Bazali kolanda sé makanisi, kasi bazali sé komikosa
  67. Ye nde atiyelaki bino butu mpo bopema na yango, mpe moyi mpo bótala mpe botambola. Wana ezali solo bilembo mpo ete bato bakokaka koyoka
  68. Bazali koloba ete: Allah azui mwana nkembo naye. Atonda bomengo, manso mazali na likolo na mabele mazali ya ye. Boye bozali na elembetele moko тропа yango? (mpo bozali koloba ete; Allah abota), boye Bozali koloba na Allah (makambo) maye bozali na boyebi na yango te
  69. Loba: Baye bazali kobukela Allah lokuta, bakolongaka te
  70. Bazali sé na bosepeli (токе) kati ya mokili, sima bakozongisamaka epai na biso, mpe tokomekisaka bango etumbu ekasi тропа maye bapengwaki na yango
  71. Mpe betela bango sango ya Nûh, tango alobaki na bato naye: Oh bato na ngai! Soki kofanda na ngai na bino, mpe mateya na ngai тропа bilembo ya Allah eleki bino kilo, kasi namipesi (mobimba mwa ngai) nyonso epai ya Allah. Boyokana na basangani ba bino banso mpe bobomba makanisi та bino te. Sima bozuela ngai mokano, kasi bozelisa te
  72. Kasi soki bopesi mikongo na koboya, nasengi bino lifuta te, lifuta lia ngai likowutaka sé epai ya Allah, тре natindamaki mpo nazala o kati ya bamizilima
  73. Baboyaki kondimela ye, mpe tobikisaki ye na baye bazalaki elongo naye o kati ya masuwa, mpe totiyelaki bango bakitani (kati na mokili) mpe tozindisaki baye baboyaki kondima na bilembo bia biso. Tala ndenge suka ya bakebisami ezalaka
  74. Sima naye, totindaki batindami epai ya bato ba bango, bayelaki bango bilembo, kasi bandimaki te, sé lokola baye baboyaki kondima liboso. Ndenge wana nde tokangaka mitema mia balekisi ndelo
  75. Totindaki Mûssa na Hâruna sima na bango, epai ya falo na bankumu naye na bilembo bia biso, basalaki lolendo, mpe bazalaki batomboki
  76. Mpe tango bosôló bwa biso boyelaki bango, balobi: Ya soló, oyo ezali bonganga ya polele
  77. Mpe Mûssa alobaki na bango été: Bokolobela bosôló na tango esili koyela bino? Kasi yango ezali bonganga mpe banganga balongaka te
  78. Balobi: Oyeli biso mpo otiya biso mosika na maye tokutaki bankoko ba biso na yango mpo bokoma bato minene awa na mokili bino mibale? Kasi tokondimelaka bino te
  79. Mpe falo alobi: В óyela ngai banganga banso baye bayebi
  80. Mpe tango banganga bayei, Mûssa alobi na bango: Bobwaka maye bolingi kobwaka
  81. Tango babwaki, Mûssa alobi: Oyo boyeyi na yango ezali sé bonganga, Allah akobebisa yango. Ya sólo, Allah abongisaka misala mia babebisi te
  82. Mpe Allah azali kolongisa bosembo na maloba naye ata soki batomboki bazali koboya
  83. Mpe bandimaki na Mûssa te sé lisanga moko ya bilenge ya bato ya falo mpo été bazalaki kobanga falo mpe bankumu ya pembeni naye, noki basala bango mabe. Kasi ya soló, falo amitombolaki o kati ya mokili, mpe azalaki o kati ya balekisi ndelo
  84. Mpe Mûssa alobaki: Oh bato ba ngai! Soki bondimi na Allah, bomipesa naye. Soki bozali batosi. (bamizilima)
  85. Balobaki: Tomipesi na Allah, Oh Nkolo wa biso! Kotiyela biso etumbu ya babubi te
  86. Mpe kangola biso na mawa mayo, o maboko ya bapagano
  87. Mpe toyebisaki na Mûssa na ndeko waye, bosalela bato ba bino bandako na egipito, mpe botiyela yango bisika ya kosambela, mpe botelemisa losambo. Mpe pesa sango elamu epai ya bandimi
  88. Mpe Mûssa alobi: Nkolo wa biso! Sólo opesi falo na bato baye bolamu na mokili. Bazali kobungisa na yango (bato) nzela nayo. Oh Nkolo wa biso! Bebisa misolo mia bango, mpe kanga mitema mia bango ete bandima te, kino bakomona etumbu ya makasi ekoyelaka bango
  89. Alobi: kosenga na bino esili kondimama. Botikala na bokambami o nzela ya semba, kasi bolanda te nzela ya baye bazanga boyebi
  90. Mpe tokatisaki bana ya isalayele ebale. Mpe falo na basoda naye balandaki bango na bonguna mpe likunya, kino amonaki liwa na miso naye okati ya ebale, alobaki: Nandimi ya soló été, nzambe mosusu ya kobondela na bosôló azali te sé bobele oyo bana ya isalayele bandimi naye, mpe ngai nazali o kati ya bamisilima
  91. (Allah alobi): Sik’oyo nde ondimi; kasi oboyaki kotosa liboso, mpe ozalaki o kati ya babebisi
  92. Lelo, tokobomba nzoto nayo mpo etikala elembo na baye bakoya sima nayo, kasi ebele ya bato bazali kokeba te na bilembo bia biso
  93. Sólo mpenza tovandisaki bana ya isalayele na esika ya lokumu, mpe topesaki bango bilei ya kitoko. Na sima bakabwanaki sé wana boyebi ekomeli bango. Ya sólo, Nkolo wayo akosambisa kati na bango o mokolo mwa suka тропа maye bazalaki kokesene na yango
  94. Mpe soki ozali na tembe тропа maye tokitiselaki yo, tuna baye bazali kotanga buku eye ekitaki liboso nayo. Bosôló bosili koyela yo kowuta epai ya Nkolo wayo. Kasi kozala te elongo ya baye bazali kotiya tembe mpe koyimayima
  95. Mpe kozala te elongo na baye bazali kozua mikapo mpe bilembo bia Allah été yango ezali lokuta, noki okozala o kati ya bazangi
  96. Ya soló, baye liloba lia Nkolo wayo lisila kokweyela bango, bakotikalaka kondima te
  97. Ata soki bilembo binso biyeli bango, kino bakomonaka etumbu ya makasi
  98. Mpe soki ezalaki na etuka oyo ekokaki kondima (na Allah), longola sé etuka ya Yûnus tango endimaki mpe bondimi na bango esungaki bango? Na yango tolongolaki bango etumbu oyo esilisaki bango lokumu awa na nsé, mpe sima topesaki bango nkembo ya bomoyi ya mwa tango токе
  99. Mpe soki Nkolo wayo alingaki nde bato banso awa na mokili bakomi bandimi, boye yo nde okondimisa bato nionso na makasi
  100. Мре moto akoki kondima te sé na ndingisa ya Allah. Mpe apesaka etumbu na baye bakanisaka te
  101. Loba: Bótala nini ezali na likolo na mabele. Kasi bilembo ya bokamwisi mpe na bakebisi, bakokaki te kosalisa bato bazanga kondima
  102. Boye, bazali kozela eloko esusu, lokola etumbu eye ezalaki o tango ya baye babebisaki liboso? Loba: Bozela, ngai lokola nakozela elongo na bino
  103. Sima tokangolaki batindami na biso elongo na baye bandimaki. Ndenge wana nde ezalaki lotomo epai na biso тропа kokangola bandimi
  104. Loba: Oh bino bato! Soki bozali na tembe na lingomba lia ngai na kobondela te oyo bozali kobondela na botiki Allah, kasi nakobondela Allah oyo akoboma bino, mpe natindamaki тропа kozala moko o kati ya bandimi
  105. Mpe balóla elongi nayo okati na lingomba ya bopeto ya bomoko ya Allah, kasi kozala elongo na basambeli bikeko na binzambe nzambe te
  106. Mpe kobondela basusu te na botiki Allah baye bakoki kosala yo bolamu mpe mabe te. Soki osali yango, soló okozuama o kati ya babubi
  107. Mpe soki Allah atiki ete pasi ezua yo, moto mosusu akoki kolongola yo yango te sé ye moko. Soki mpe alingeli yo bolamu, moko te akoki koboya bolamu naye, apesaka yango na oyo alingi o kati ya bawumbu naye. Mpe azali molimbisi atonda ngolu
  108. Loba: Oh Bino bato! bosôló bosilaki koyela bino kowuta epai ya Nkolo wa bino. Oyo akomikamba, amikambi тропа ye moko (o nzela ya semba) mpe oyo akomibungisa, amibungisi ye moko. Mpe nazali mobateli wa bino te
  109. Mpe landa maye makiteli yo, mpe kanga motema kino Allah akosambisa; mpo ye azali zuzi malamu wa ba zuzi