Nyoso oyo ezali na likolo na mabele ezali kokumisa Allah, mpe azali wa makasi atonda bwanya
Oh bino bandimi! Mpona nini bolobaka maye bosalaka te
(Kosala bongo) ezali lisumu monene epai ya Allah, koloba maye bozali kosalela te
Ya soló, Allah alingaka baye bazali kobunda na nzela naye bazali molongo lokola bifelo bia ndako bitongami makasi
Mpe tango Mûssa alobaki na bato naye: Mpona nini bozali kotungisa ngai mpe boyebi été nazali motindami ya Allah epai na bino? Mpe tango bapengwaki, Allah mpe apengwisi mitema mia bango. Mpe Allah akambaka bato mabe te
Mpe tango Issa mwana ya Maryam alobaki na bana ya isalayele: Ya soló, nazali motindami ya Allah epai na bino (тропа kolobela) bosôló oyo ezali na kati ya torah, тре kopesa bino sango elamu ya motindami oyo akoya sima na ngai nkombo naye Ahmad. Mpe tango ayeli bango bilembo bia polele, balobi: Oyo ezali bonganga ya polele
Nani azali mabe koleka moto oyo akoseli Allah? Мре azali kobengama ete abongola motema. Kasi Allah akambaka babubi te
Balingi bazimisa mwinda ya Allah na minoko mia bango, kasi Allah azali kokokisa mwinda naye ata bapagano balingi te
Ye nde atindaki motindami naye na bokambi mpe lingomba ya soló, mpo ete ezala likolo lia mangomba manso, ata soki basambeli ya bikeko bazali koboya
Eh bino bandimi! Boye bolingi nalakisa bino mombongo moye mokoki kobikisa bino na etumbu ya makasi
Bondima na Allah na motindami naye, mpe bobunda na nzela ya Allah na misolo mia bino mpe milimo mia bino. Wana ezali malamu тропа bino, soki bozali koyeba
Akolimbisa masumu na bino mpe akokotisa bino na lola oyo ezali kolekisa mingala o nsé na yango, mpe bisika ya kovanda ya kitoko bikozalaka na lola ya eden. Wana nde elonga ya monene
Mpe akopesa bino biloko bisusu oyo bokolingaka mpe lisungi kowuta epai na Allah mpe elonga ya pembeni. Mpe pesa sango elamu epai ya bandimi
Oh bino bandimi! Bozala basalisi ya Allah, lokola Issa mwana ya Maryam alobaki na bayekoli naye ete: Nani akosalisa ngai тропа Allah? Bayekoli balobaki ete: Tozali basalisi ya Allah, mpe eteni moko kati na bana ya isalayele bandimaki, mpe eteni mosusu bapengwaki, mpe tosungaki bato oyo bandimaki likolo na banguna na bango mpe balongaki