Apambolama ye oyo azali na bokonzi na maboko naye, mpe azali na makoki likolo ya biloko binso
Ye nde akela liwa mpe bomoyi mpo ameka bino mpe atala nani kati na bino akosala malamu koleka. Mpe azali wa bokasi atonda bolimbisi
Ye nde akeli mapata sambo ya komatelama, boye okomona eloko ya mabe na kati ya bokeli ya Ar-Rahmân te. Zongisa miso тропа kotala lisusu, okomona sé kitoko
Sima tala lisusu mbala mibale, kotala nayo ekozongela yo na nsoni mpe ezangi bokasi
Mpe ya soló, tosilaki kobongisa mapata ya pene na nsé na bonzenga ya bongengi ya minzoto, mpe totiaki yango (minzoto) тропа kobengana basatana, mpe tobombeli bango etumbu ya lifelo
Mpe тропа baye bapengwa na Nkolo wa bango. Bakozuaka etumbu ya lifelo, mpe bozongi nini ya mabe wana
Moto wana ezali kokabola bango, tango nyoso soki bakobwaka bamosusu, bakengeli (ya lifelo) bazali kotuna bango: Boye mokebisi ayelaki bino te
Bakolobaka: Iyo. Mokebisi ayelaki biso kasi toboyaki kondimela ye mpe tolobaki: Allah akitisa eloko te, bozali sé na libungi linene
Mpe bakolobaka: Soki toyokaka mpe tokanisaka (malamu) tolingaki kozala okati ya bato ya lifelo ya saira te
Mpe bayebaki mabe na bango, mpe tika ete bato ya lifelo babebisama
Ya soló, baye bazali kobanga Nkolo na bango nakobombama bakozuaka lifuta linene
Soki ata bobombi maloba na bino to bobimisi yango polele, ya solo ye azali moyebi ya nyoso oyo ebombami o kati ya mitema (batolo)
Boye ayebi te baye akela mpe azali malamu atonda basango
Ye nde atiela bino mabele mpete botambola kati na yango lolenge bolingi, mpe bolia oyo apesi bino, mpe bozongi ekozala sé epai naye
To boye bozali na ebateli libanda na oyo azali na likolo été akoki kokotisa bino na mabele kasi bokomona ete mabele ekoningana
To boye bobatelami liboso na oyo azali na likolo été atindela bino mopepe ya mabanga? Bokoyeba ndenge nini bokebisi na ngai ezali
Mpe baye balekaki liboso na bango baboyaki, mpe etumbu na ngai ezalaki ndenge nini
Boye bazali kornona te bandeke na likolo lolenge akangaka mpe afungolaka mapapu naye? Oyo asimbi bango ezali sé Ar-Rahmân. Ya soló, ye amonaka biloko binso
Nani akosalisa bino na mapinga ya kosunga bino liboso ya Ar-Rahmân? Ya soló, bapengwi bazali mpenza na libungi
Mpe nani mosusu akoki koleisa bino soki akangi bozui naye? Kasi bazali sé kosala miso makasi kati na mabe mpe koboya
Boye oyo azali kotambola elongi na nsé akambami koleka oyo azali kotambola alima na nzela ya semba
Loba: Ye nde akela bino mpe atiela bino bomoni na boyoki mpe mitema, baye bazali kotondo bazali moke
Loba: Ye nde atia bino okati ya mabele, mpe epai naye bokosanganaka