68.The Pen

  1. Nún, (nalapi) na ekomeli na oyo ezali kokoma
  2. Yo (Muhammad) na ngrásia y a Nkolo nayo ozali libgoma te
  3. Mpe ya sôló, ozali na lifuta oyo esilaka te
  4. Mpe ya sôló, ozali na ezaleli ya malamu
  5. Yo okomona mpe bango bakomona
  6. Nani kati na bino amekami
  7. Ya sôló, Nkolo wa yo ayebi malamu oyo abunga nzela naye, mpe ayebi malamu baye bazali na bokambami
  8. Kaši kotosa bato ya lokuta te
  9. Bakosepela ozala malamu na bango mpo bazala mpe malamu nayo
  10. Mpe kotosa moko te na bango, bazali kolapa na ntina te
  11. Bato ya songi songi, bazali kokosela bato makambo
  12. Baye bapekisaka bolamu ya bato, bazali kolekisa ndelo mpe basali na masumu
  13. Bazali na mitema makasi mpe bazali na lolendo
  14. Ata soki azali na misolo ebele na bana ebele, (alingi kobonguana te)
  15. Soki batangeli ye mikapo mia biso, alobi: Wana ezali sé masapo ya bankoko ya kala
  16. Tokomonisa elembo naye likolo na zolo
  17. Ya soló, tomekaki bango lolenge tomekaki bato ya elanga tango bakanaki ete bakobuka yango lobi na tongo
  18. Bazangaki koloba: Na bolingi ya Allah. (In cha Allah)
  19. Mabe kowuta epai ya Nkolo nayo ekwelaki yango bazali kolala
  20. Na tongo ekomi lokola eloko ezalaki te
  21. O mokolo molandi: Babiangani bango na bango
  22. Bökende noki na bilanga na bino soki bolingi kobuka mbuma
  23. Basololi kati na bango na bango na nsé tango babimaki тропа kokende
  24. Mobola moko te akotela bino lelo na elanga
  25. Mpe bakendeki na tango ya malamu na mokano nyoso ete bakoka kopimela babola
  26. Mpe tango bamoni (elanga) yango, balobi: Ya soló tobungi nzela na biso
  27. То yango; Kasi tozali na eloko te
  28. Moto ya bosembo kati na bango alobi: Nayebisaki bino te ete: Soki bosanzolaki lukumu ya Allah
  29. Balobi: Lokumu na Nkolo wa biso, ya sólo tozalaki bato mabe
  30. Batalani bango na bango, bakomi koloba: Yo nde osali mabe
  31. Mpe balobaki ete: Eh biso mpasi! Ya sólo, tozalaki batomboki
  32. Tozali kolikia na Nkolo wa biso été abongola eloko ya malamu тропа biso, tozali kolikia pene na Nkolo wa biso
  33. Lolenge wana nde etumbu ezalaki, kasi etumbu ya mokolo ya suka eleki monene. Soki bazali koyeba
  34. Ya soló, babangi (Allah) bakozalaka epai ya Nkolo na bango na lola ya kitoko
  35. Boye tokozua bandimi ndenge moko na batomboki
  36. Boni bozali kokata likambo na lolenge wana
  37. To boye bozali na buku eye bozali koyekola
  38. Ete ya sólo, bokozua nyoso oyo bokolinga
  39. To boye bolapelaki biso bandai ya bosôló kino mokolo ya suka, mpo topesa bino maye bolingi
  40. Tuna bango, nani kati na bango azali nkumu na yango
  41. To boye bazali na basangani? Baya na bango soki bazali koloba bosôló
  42. Mokolo oyo lokolo ekomonamaka, mpe bakobengaka bango ete bafukama elongi na mabele kasi bakokokaka kofukama te
  43. Bilongi na bango bikokitisama mpe bakozanga lokumu, nzoka nde babiangamaki mpo bafukama tango bazalaki malamu (na mokili)
  44. Tika ngai na oyo nyoso azali kozua masolo oyo na lokuta, tokozua bango malembe na esika oyo bakoyeba te
  45. Мре natikelaki bango tango kaši, motambo na ngai ezali ya soló
  46. То boye osengaki bango lifuta to osengaki bango bazua nyongo ya monene
  47. To boye bayebi maye mabombami, yango bazali кокота
  48. Мре kanga motema (Muhammad) na kozela mokano ya Nkolo nayo, kasi kozala lokola moto oyo azalaki na libumu ya mbisi te (Yûnus), tango abelelaki (Allah) na kati ya mawa ya monene
  49. Soki тропа bolamu ya Nkolo naye te likolo naye, nde abwakamaki libanda bolumbu likolo ya mabele ekauka
  50. Mpe Nkolo naye aponaki ye mpe atiaki ye o molongo ya bato malamu
  51. Tango bapengwi bayokelaki yo likunya mpe kotala yo na miso ya mabe na tango bayokaki kurani, balobi: Ya sólo azali ligboma
  52. Wana ezali sé bokundoli тропа mokili mobimba