69.The Reality

  1. Mokolo ya Sólo
  2. Nini nde mokolo ya Sólo
  3. Eloko nini ekolakisa yo mokolo ya sólo nde nini
  4. Bato ya mboka Thamúd na Aad baboyaki kondimela likambo ya somo
  5. Mpona bato ya Thamúd, babebisamaki na tangba ya makasi
  6. Mpe mpona bato ya aad, babebisamaki na mopepe ya makasi
  7. Mabe wana ekwelaki bango butu sambo na mikolo mwambe, okomona sé bibembe ya bato, bakomi lokola biteni ya nagh’l ya kokata kata
  8. Boye okomona ata eloko etikali
  9. Falo na baye bazalaki liboso naye na bato ya mboka bikweisama, bayaki na mabe
  10. Mpe baboyaki kondima na motindami ya Nkolo na bango, kasi azuisaki bango kozuama ya mawa te
  11. Ya soló, tango mayi etondaki, biso nde tomatisaki bino okati ya masuwa
  12. Mpo totiya yango etikala elembo mpo bato bakoka kokanisa
  13. Mpe tango bakofula na kelelo mbala moko
  14. Mabele na bangomba bikotombwana nako pasuka mbala moko
  15. Mokolo wana ekozala bokweisami ya suka
  16. Likolo likopasuka mpe langi na yango ekobongwanaka
  17. Mpe ba anzelu (basantu) bakozalaka pembeni ya mapata (bazali na bobangi ya Nkolo wa bango) mpe ba anzelu mwambe bakomema ngwende (ya Allah) mokolo wana
  18. Mokolo wana bokozongisaka nyoso epai ya Allah, bokobombaka eloko moko te
  19. Oyó bakopesaka ye buku naye na loboko ya mobali, akolobaka: Bosimba mpe botanga buku na ngai
  20. Nazalaki kolikia ete nakokutana na mbano mwa ngai
  21. Мре akozala na bomoyi ya esengo
  22. (Akozalaka) okati ya Iola ya likolo
  23. Bambuma na yango ezali pembeni
  24. Bolia mpe bomela na esengo kolandana na mikolo oyo bolekisaki
  25. Mpe oyo bakopesa ye buku naye na loboko ya mwasi akolobaka: Eh ngai! Soki bapesaka ngai ata yango te
  26. Mpe nayebaki ata eloko moko na yango te
  27. Natikala ata na liwa na ngai
  28. Misolo mia ngai misalisi ngai na eloko te
  29. Bokonzi na ngai esili kobebisama
  30. Bokanga ye singa na kingo
  31. Sima bobwaka ye na moto
  32. Bokanga ye na minyololo ya ntaka ntuku nsambo
  33. Ya soló, azalaki kondima na Allah wa monene te
  34. Mpe azalaki na (mawa) ya koleisa babola te
  35. Lelo azali na mosungi te
  36. Mpe bilia naye ekozala sé mayi ya moto ya tofina
  37. Baye bakoliaka yango sé ba oyo basalaki mabe
  38. Nalapi na maye bozali kornona
  39. Мре na maye bozali kornona te
  40. Yango, ezali liloba lia motindami ya lokumu
  41. Kasi ezali liloba lia moto mpamba te, kasi bozali moke oyo bozali kondima
  42. Mpe ezali liloba lia nganga te. Ebele bazali kokanisa te
  43. Ekitaki kowuta epai ya Nkolo ya molongo
  44. Ata alobelaki biso ndambu ya maloba ya lokuta oyo balobaki
  45. Tolingaki kozua ye na loboko ya mobali
  46. Sima, tolingaki kokata ye singa ya motema
  47. Moko azali te ya kopekisa biso
  48. Ya soló, wana ezali sé bokundoli тропа babangi
  49. Mpe toyebi malamu banani bakosi kati na bino
  50. Мре ya soló, ye akozangisaka bapengwi te (na etumbu)
  51. Mpe ya soló, wana ezali bosembo mpenza ya bondimi
  52. Kumisa nkombo ya Nkolo nayo ya lokumu