7.The Heights

  1. Alif, lâm, mîm, swâd
  2. Buku eye ekitelaki yo. Mpe likambo moko te litungisa motema nayo kowuta na kobanga, mpo ete okebisa na yango, mpe ezali liteya тропа bandimi
  3. Bolanda maye makitelaki bino kowuta epai ya Nkolo wa bino, mpe bolanda basusu te sé ye. Bozali kokanisa sé токе
  4. Mpe bamboka boni tobomaka yango! Mpe tango etumbu na biso eyelaki bango na butu, to тре bazalaki na bopemi ya токе na moyi
  5. Mpe kosenga na bango tango etumbu na biso eyelaki bango balobaki; ya soló, tozalaki babubi. (balekisi ndelo)
  6. Mpe tokotunaka ya sólo baye totindelaki bango batindami, mpe ya sólo, tokotunaka batindami
  7. Mpe tokoyebisaka bango na boyebi bonso, kasi mabombamelaki biso te
  8. Мре emekelo ekomekama na bosembo mokolo wana, mpe oyo emekelo naye ekozalaka na kilo. Baye wana nde balongi
  9. Mpe na oyo emekelo naye ekozala fafala, baye bana nde bamizangisaki bango moko kowuta na maye bazalaki kobuba na mikapo (bilembo) mia biso
  10. Mpe tosilaki kopesa bino bokonzi ya kofanda na mabele mpe totielaki bino libiki ya bomoyi o kati na yango, kasi токе nde bozali kotondo
  11. Mpe na bosóló tosilaki kokela bino, sima topesi bino lolenge, mpe sima toyebisaki na ba anzelu ete: Bogumbamela Adam, тре bagumbamaki, longola sé ibilisa azalaki te o kati ya bagumbami
  12. Alobi (Allah): Eloko nini epekisaki yo kogumbama tango napesaki yo mitindo? Alobi (Lusufelo): Ngai nazali malamu mingi koleka ye, pamba te okelaki ngai na moto mpe okelaki ye kowuta na poto poto
  13. Alobi (Allah): Kita na esika eye, тре esengeli nayo te kosala lolendo kati na yango. Mpe bima, ya soló, ozali o kati ya bazangi lokumu
  14. Alobi (Ibilis): Zelisa ngai kino mokolo moye bakosekwisama
  15. Alobi (Allah): Ya soló, ozali o kati ya baye bazali kozela
  16. Alobi: (lusufelo) na ntina été obungisi ngai, nakofandela nzela nayo ya semba (тропа kobungisa bango)
  17. Мре nakoyela bango liboso тре sima na bango, тре ngambo loboko ya mobali тре ya mwasi. Мре okokuta ebele kati na bango bazali kotondo yo te
  18. Alobi (Allah): Віта kati na yango! Ozali mabe mpe mobenganami. Oyo akolanda yo kati na bango, ya solo, nakotondisa lifelo na baye banso bakolanda yo
  19. Mpe Eh Adam! Vanda yo na mwasi wayo o kati ya Iola, mpe boliya binso bolingi, kasi bopusana te pene na nzete eye noki bokozala kati na babubi. (yo na mwasi wayo)
  20. Mpe satana akotisi bango na komekama mpo na kotalisa bango bolumbu na bango, mpe alobi na bango: Nkolo na bino apekisaki bino kólia nzete oyo mpo ete bokoma ba anzelu to mpe bozala kati ya baye bokotikala libela
  21. Мре alapeli bango: Ya soló, nazali mopesi ntoli malamu тропа bino
  22. Мре akweisi bango na bokosi bwa ye, tango bameki koliya nzete, bolumbu bwa bango bomonani polele mpe bazwaki lokasa ya lola babandi komizipika na yango, mpe Nkolo wa bango abeleli bango ete: Napekisaki bino te na nzete eye? Mpe nalobaki na bino te ete zabulu azali ya sólo, monguna wa bino wa polele
  23. Bango balobi: O Nkolo wa biso! Tobubi milimo mia biso, mpe soki olimbisi biso te mpe oyokeli biso mawa te, ya sólo, tokozuama o kati ya bazangi
  24. Alobi (Allah): Bokita! Bino na bino banso bokozala na kibonguna, mpe mabele ezali esika ya bovandi na bosepeli токе тропа bino
  25. Alobi (Allah): Kati na yango bokolekisa bomoyi mpe kati na yango bokokufa mpe bokobimisama o kati na yango
  26. Eh bino bana ya Adam! Ya soló, tosilaki kokitisela bino elamba тропа kozipa bolumbu bwa bino mpe тропа bonzenga. Kaši elamba ya bobangi nde ezali malamu mingi. Wana ezali moko kati na bilembo bia Allah mpo été bakanisa
  27. Eh bana ya Adam! Satana abungisa bino te lolenge abimisaki baboti ba bino o kati na lola, alongolaki bango bilamba mpo amonisa bolumbu bwa bango. Ya soló, ye (satana) azali kornona bino ye na bato baye o esika eye bino bozali. Kasi bozali kornona bango te, ya solo, totiyaki ba satana bazala Basungi ya baye baboyi kondima
  28. Mpe soki basali mbeba, bakolobaka: Tokutaki yango epai ya bankoko ba biso, mpe Allah atindi biso na yango. Loba: Ya solo, Allah atindaka na mbeba te, bozali koloba na Allah maye bozali na boyebi na yango te
  29. Loba: Nkolo wa ngai atindi bosembo. Mpe bosembolisa bilongi bia bino na bisika binso ya mabondeli, mpe bobondela ye na bomoko nyoso na botosi ye. Ndenge akelaki bino bokozongaka sé bongo
  30. Akambi basusu mpe basusu Atieyi likolo na bango bobungi, pamba te mpo bazuaki basatana bazala bakonzi na bango batiki Allah, mpe bazali kokanisa ete bazali na bokambami bolamu
  31. Eh bana ya Adam! Bozua bonzenga na bino (bolata bilamba bia kitoko bia bino) na tangoya sambela nyoso, boliya mpe bomela, kasi bolekisa ndelo te. Ya soló, ye alingaka balekisi ndelo te
  32. Loba: (Muhammad) nani oyo apekisa bonzenga ya Allah mpe bozui naye ya kitoko oyo abimiseli bawumbu naye? Loba: Yango ezali тропа baye bazali na bondimi na bomoyi ya mokili oyo, na baye bazali na elikia тропа mokolo mwa suka, ndenge wana nde tozali kolimbola mikapo polele mpo Na bato oyo Bayebi
  33. Loba: Ya sólo, Nkolo wa ngai apekisi mbeba kosala yango polele to тре na kobatama, mpe na lisumu, na kosala kibonguna na esika esengeli te, na bosangisi Allah na maye manso akitiseli yango liloba te. (mokapo to elembo) mpe boloba te na Allah maye bozali na boyebi na yango te
  34. Mpe na umma nyoso bazali na eleko na bango. Mpe soki eleko na bango ekoki, ngonga ekozelisamaka te mpe ekowelisama te
  35. Eh bana ya Adam! Soki batindami bayeli bino тропа kolimbolela bino bilembo bia ngai, mpe baye bakobanga ngai mpe babongisi, bakozalaka na bobangi te mpe bakozala na mawa te
  36. Мре baye baboyaki kondimela bilembo bia biso mpe basaleli yango lolendo, bango nde bato ya moto. Bakozalaka kati na yango libela
  37. Мре nani azali mabe koleka moto oyo akoseli Allah to aboyi kondima na mikapo mia ye? Bango wana bakozuaka mbano na bango na maye bakomelaki bango, kino batindami ba biso (ba anzelu) bakoyelaka bango тропа kolongola bango milimo, тре (ba anzelu) bakotunaka bango: Wapi baye bozalaki kokumisa na botiki Allah? Bakoyanolaka: Tozali kornona bango lisusu te, mpe bako milobaka bango moko ete: Ya soló, tozalaki bapengwi
  38. Akolobaka (Allah): Bokota na moto elongo na bilima mpe bato ya lisanga ya baye balekaki liboso lia bino, tango nyoso umma soki ekoti, lizali kosengela mosusu botutu. Kino bakokutanaka bango banso kati na yango, lisanga lyoko likolobaka na basusu: Eh Nkolo wa biso! В a oyo nde babungisa biso. Bakisela bango etumbu o kati ya moto, akolobaka: Na lisanga nyoso etumbu ekobakisama, kasi bozali koyeba te
  39. Мре lisanga lia yambo likolobaka na oyo lia suka: Bozali na lokumu moko te epai na biso. Bomeka etumbu тропа maye bozalaki kosala
  40. Ya soló, baye baboyaki kondima na mikapo mia biso mpe basaleli yango lolendo, bakofungolelaka bango bizibeli bia likolo te, mpe bakokotoko na lola te, kino djamal akota na lidusu lia tonga, mpe ndenge wana nde tokofutaka batomboki
  41. Nakati ya lifelo bakozala na bambeto na bulangiti na bango, mpe bakozipamaka na molili. Mpe ndenge wana nde tokofutaka babubi
  42. Mpe baye bandimaki mpe basalaki bolamu, topesaka moto mokumba te sé moye mokoki naye, bango nde bato ya lola, bakovandaka seko kati na yango
  43. Mpe tokolongolela bango likunya o kati ya mitema mia bango, o nsé na bango, mingala mikotiolaka, mpe bakolobaka: Matondo na Allah oyo akambi biso na maye tozalaki na bokoki te. Soki Allah akambaki biso te nde tokambamaki te. Batindami ba Nkolo wa biso bayaki nabosôló. Мре bakobengamaka na oyo nde lola na bino eye bapesi bino, engebene na maye bozalaki kosala
  44. Mpe bato ya lola bakobengaka bato ya lifelo; ya soló, tozui maye Nkolo wa biso alakaki biso na bosembo, boye bino mpe bozui maye Nkolo wa bino alakaki bino na bosembo? Bakolobaka; iyo; mpe mobeleli akobelelaka kati na bango ete; botutu bwa Allah bozala o likolo lia babubi
  45. Baye bazali kokanga nzela ya Allah mpe bazali kolukela yango minyokoli, mpe bango bandimaka na mokolo mwa suka te
  46. Mpe okati ya bango babale ekozala na ndelo (efelo), mpe likolo lia A’ráf, ezali na mibali bakoyebaka bato banso na bilembo bia bango, mpe bakobenga bato ba lola ete; kimiya ya (Allah) ezala likolo lia bino, mpe bakoti yango na’íno te na bango bazali na posa ya kokota
  47. Mpe tango miso ma bango ekotala epai ya bato ya moto, mpe bakolobaka: Eh Nkolo wa biso! kotiya biso esika moko te na babubi
  48. Мре bato ya A’râf bakobengaka mibali misusu baye bayebaki bango na bilembo bia bango. Bakolobaka: Maye bobombaka mia misolo na maye bozalaki kosala lolendo esungi bino na eloko te
  49. Boye nde ba oyo bozalaki kolapa ete bolamu bwa Allah bokozua bango te? Bokota o lola bokozala na bobangi te mpe bokozala na mawa te
  50. Mpe bato ya moto bakobenga bato ya lola, bopesa biso mwa mayi to mpe maye oyo Allah apesi bino. Bakolobaka: Ya soló Allah apekisi yango nyoso mabale тропа bapengwi
  51. Baye bazuaki lingomba lia bango na liseki mpe na lisano, тре mokili mwa nsé mokosaki bango. Mokolo mwa lelo tobosani bango lolenge babosanaki bokutani bwa mokolo mwa bango moye, mpe mpo bazalaki kotiya tembe na bilembo bia biso
  52. Toyelaki bango buku eye tolimbolaki yango, na boyebi bonso тропа bokambi mpe ngolu тропа bato baye bazali kondima
  53. Boye bazali kozela sé etumbu naye? Mokolo moye etumbu naye ekoyaka, baye babosanaki liboso bakolobaka: Batindami ya Nkolo wa biso bayaki na bosôló, boye na mokolo mwa lelo tozali na basungi baye bakosungaka biso? To, tozongisama na mokili tosala maye tozalaki kosala liboso te! Basilaki komizangisa bango moko, mpe maye bazalaki kosala ya mabe ebungisaki bango
  54. Ya soló, Nkolo wa bino nde Allah oyo akelaki likolo na mabele na mikolo motoba sima atombuami likolo na ngwende. Azali kozipa butu na mokolo. Azali kolandisa yango mpe ezali kotelema te, (akeli) moyi na sanza, na minzoto, minso mizali kotambola na botosi mitindo mia ye. Boye, bokeli na mibeko minso mizali mia ye te? Nkembo na Allah Nkolo wa molongo
  55. Bobondela Nkolo wa bino na limemya nyoso mpe na bobombami. Ya sólo, ye alingaka te balekisi ndelo
  56. Mpe bobebisa te kati na mokili o sima ya kobongisama na yango. Bobenga ye na bobangi mpe na elikya, ya sólo, ngolu ya Allah ezali pene pene тропа babongisi
  57. Mpe ye nde azali kotinda mopepe na sango elamu eye ezali epai naye kino mopepe ekomi londende ya kilo, tozali kosopa yango na mboka eye ekawuka (makufa) mpe tozali kokitisela yango mayi mpe tozali kobimisa na yango bambuma ya lolenge inso. Ndenge wana nde tokobimisaka bawei, mpo bokoka kokanisa
  58. Mpe mboka elamu nde eye ezali kobimisa milona malamu na ndingisa ya Nkolo wa yango, kasi (mboka) eye ezali mabe ebimisaka te sé ndambu ya milona mike. Bongo tozali kolimbola bilembo bia biso mpo bato bakoka kotondo
  59. Mpe tosilaki kotinda Nûh epai ya bato naye mpe alobaki: Eh bato ba ngai! Bobondela Allah, bozali na nzambe mosusu te sé ye, ya soló nazali kobangela bino etumbu о mokolo mwa somo enene
  60. Bankumu ya bato naye balobi: Ya solo, tozali kornona yo na libunga lia polele
  61. Alobi: Eh bato ba ngai! Nazali na libunga te, kasi nazali motindami kowuta epai ya Nkolo wa molongo
  62. Mpo nakomisela bino sango ya Nkolo wa ngai mpe napesa bino ntoli. Mpe nayebi epai ya Allah, maye bino boyebi te
  63. Boye ezali kokamwisa bino soki liteya liwuti epai na Nkolo na bino, na moto moko kati na bino mpo akebisa bino, mpe mpo ete bokoka kobanga, mpo été bozala o nsé ya ngolu naye
  64. Mpe baboyaki kondimela ye. Mpe tobikisaki ye na baye bazalaki elongo naye o kati ya masuwa, mpe tozindisaki baye bazangaki kondimela bilembo bia biso. Ya soló, bazalaki bato baye bazalaki kornona te
  65. Mpe totindelaki bato ya aad, ndeko wa bango Hûd. Alobaki: Eh bato na ngai! Bobondela Allah, bozali na nzambe mosusu te sé ye. Boye bozali kobanga te
  66. Bankumu ya bato naye baye bapengwaki balobi: Ya sólo, tozali kornona yo ozali na bozoba, mpe ya sólo, tozali kokanisa ete ozali kati na babuki lokuta
  67. Alobi: Eh bato ba ngai! Nazali na bozoba te, kasi nazali motindami kowuta epai ya Nkolo wa molongo
  68. Mpo nakomisela bino sango ya Nkolo wa ngai, mpe nazali mopesi toli malamu тропа bino
  69. Boye ezali kokamwisa bino soki liteya liwuti epai ya Nkolo wa bino eyei na moto moko o kati na bino mpo akebisa bino? Bokanisa tango akitanisaki bino osima ya bato ya Nûh mpe abakiselaki bino bokasi na nzoto na bokeli. Bokanisa bolamu bwa Allah mpo bokoka kolonga
  70. Balobi: Oyeli biso mpo tobondela Allah na bomoko bwa ye, mpe totika maye bankoko ba biso bazalaki kobondela? Yela biso maye ozali kolaka biso (etumbu) soki ozali koloba bosôló
  71. Alobi. Etumbu mpe nkanda esili kokwela bino uta epai ya Nkolo wa bino. Bozali kosuanisa ngai тропа bankombo iye bino na ba tata ba bino (bankoko) bopesa yango oyo Allah akitiselaki yango elembo te? Mpe bozela (etumbu) ya soló, nazali kozela elongo na bino
  72. Mpe tobikisaki ye na baye azalaki elongo na bango na mawa та biso. Mpe tosilisaki baye baboyaki kondima na bilembo bia biso mpe bazalaki bandimi te
  73. Mpe totindaki epai ya bato ya thamúd, ndeko wa bango Swálih, alobi: Eh bato na ngai! Bobondela Allah, bozali na nzambe mosusu te sé ye. Elembo esilaki koyela bino kowuta epai ya Nkolo wa bino. Oyo nâqah ya Allah ezali elembo epai na bino, botika ye aliya na mabele ya Allah, kasi bosala ye mabe te noki te etumbu makasi ekozua bino
  74. Мре bokanisa tango totiyaki bino bakitani o sima ya bato ya aad mpe tovandisi bino na mabele, mpe botongaki bandako na lolenge ya pete, mpe botongi bisusu o kati ya bangomba. Kasi bokanisa bolamu bwa Allah boye asaleli bino, kasi bovanda na mabele na ndenge ya kobebisa te
  75. Bankumu baye basalaki lolendo kati na bato baye balobaki na baye bazalaki na bokoki te baye bandimaki: Boye bozali koyeba ya soló penza, Swâlih azali motindami kowuta epai ya Nkolo wa ye? Balobaki: ya soló, tondimi na maye atindamaki na yango
  76. Baye basalaki lolendo balobi: Biso toboyi maye bondimeli yango
  77. Mpe babomaki nâqah mpe basalaki lolendo na mibeko mia Nkolo wa bango, mpe balobi: Eh! Swâlih! Yela biso maye ozali kolaka biso soki ozali solo kati ya batindami
  78. Mpe boningani bwa mabele (etumbu) bozuaki bango mbalakaka o kati ya bandako bia bango mpe bakomaki bibembe
  79. Mpe (Swálih) apesaki bango mokongo (atiki bango), mpe alobi: Eh bato ba ngai! Nasilaki kokomisela bino sango ya Nkolo wa ngai te, mpe napesaki bino toii te. Kasi bolingaka baye bapesaka toii te
  80. Mpe tango Loth alobaki na bato baye: Bozali kosala mabe maye ata moto moko te asalaki yango o kati ya mikili yambo na bino
  81. Ya soló, bozali kokende kosilisa bamposa na bino epayi ya mibali, mpe botiki basi? Kasi bozali solo bato baye basili kolekisa ndelo
  82. Mpe eyano ya bato naye ezalaki te sé balobaki été: Bobimisa bango o kati ya mboka na bino, mpo bazali solo bato oyo bazali komipetola
  83. Mpe tobikisaki ye na libota lia ye, longola sé mwasi waye azalaki o kati ya baye bazuaki etumbu
  84. Mpe tobetiselaki bango mbula (ya mabángá ya moto), tala ndenge ezalelaki lifuta ya batomboki
  85. Мре (totindaki epai ya bato) ya mad’yan, ndeko wa bango Shuaîb, alobi: Eh! Bato ba ngai! Bobondela Allah, bozali na nzambe mosusu te sé ye, elembo esilaki koyela bino kowuta epai ya Nkolo wa bino. Мре bokokisa emekelo, mpe kilo, kasi bobuba bato biloko bia bango te. Mpe bobebisa o kati ya mokili te o sima ya kobongisama na yango. Wana nde ezali malamu тропа bino soki bozali kondima
  86. Mpe bovandela ba nzela nyoso te тропа konyokolo mpe kopekisa nzela ya Allah moto nyoso oyo andimeli ye, mpe kolukela yango mindondo. Bokanisa tango bozalaki токе, mpe akomisi bino ebele. Bótala ndenge ezalelaki lifuta ya babebisi
  87. Mpe soki basusu kati na bino bandimaka na maye natindami na yango, mpe basusu bandimaka te, bozela kino Allah akokata kati kati na biso, mpe azali zuzi malamu
  88. Mpe bankumu baye basalaki lolendo o kati ya bato naye balobi: Tokobimisa yo na baye bandimi elongo nayo yâ Shuaîb na mboka na biso to bozonga na lingomba lia biso, alobi: (bomanyola) ata soki toyini yango
  89. Soki solo tosali bongo, tosili kobukela Allah lokuta osima ya kobikisa biso na yango. Esengeli na biso te kozongela yango, sé na bolingi bwa Allah Nkolo wa biso, Nkolo wa biso azali na boyebi na biloko binso, tomipesi na Allah. Oh Nkolo wa biso! Kata okati na biso na bosôló, mpo yo nde ozali mokati malamu wa bazuzi
  90. Mpe bankumu ya bato naye baye bapengwaki balobi: Soki bolandi Shuaîb, solo bokozanga
  91. Mpe koningana ya mabele ezuaki bango (bwa etumbu), mpe bakomaki bibembe o bandako bia bango
  92. Baye bazuaki Shuaîb na lokuta balimuaki lokola bazalaki na mokili te, baye bazuaki Shuaîb na lokuta bazalaki bazangi
  93. Mpe apesaki bango mokongo mpe alobi: Oh bato ba ngai! Ya soló, nakomiselaki bino maloba mwa Nkolo wa ngai. Mpe napesaki bino toli, ndenge nini nakoyokela bapengwi mawa
  94. Mpe totindaki ntoma o kati ya mboka moko te sé tozuaki bato na yango, na ba mpasi ya nzala mpe na bokono mpo ete basenga bolimbisi
  95. Mpe sima tobongolaki makambo ya mabe na bango na oyo ya malamu, kino bomengo na bango ekomaki ebele mpe balobi: Ya soló, pasi na mikakatano mizuaki bankoko ba biso, mpe tosimbaki bango mbalakaka kasi bazalaki koyeba te
  96. Kasi soki bato ya bamboka bandimaka mpe babangaka, tolingaki kofongolela bango bolamu ya likolo na ya mabele. Kasi baboyaki kondima, mpe tozuaki bango тропа maye bazalaki kosala
  97. Boye, bato ya bamboka bazali na elikya ete etumbu na biso ekoyela bango te na butu тре bango bazali kolala
  98. Boye, bato ya bamboka, bazali na elikya ete etumbu na biso ekoyela bango te mpe bango bazali kosakana
  99. Bazali kolikya été bakobika na mwango ya Allah? Kasi mwango ya Allah likozuaka sé bazangi
  100. Mpe boye, esilaki kolimbolama baye bakitanaki mabele o sima ya kokufa ya baye oyo baleka, soki tolingaka mbele tobetaki bango elembo тропа masumu та bango, тре kokanga mitema mia bango, balingaki koyoka te
  101. Mpe tozali kobetela yo masapo ma mboka ena. Ya solo, batindami na bango bayelaki bango bilembo bia polele, kasi bandimela te na maye basilaka kozua yango lokuta. Ndenge wana nde Allah akangaka mitema mia bapengwi
  102. Мре tokutaki ebele na bango te bazali na botosi ya elaka. Mpe tokutaki ebele na bango bazali babebisi
  103. Sima na bango, totindaki Mûssa na makamwisi ma biso epai ya falo na bankumu (bato) naye. Kasi bazangaki bosembo na bilembo bia biso, tala ndenge lifuta lia babebisi ezalaki
  104. Mpe Mûssa alobaki: Oh falo! Ya soló, nazali motindami kowuta epai ya Nkolo wa molongo
  105. Ete, nakoki koloba te тропа Allah sé bosóló. Nayeli bino elembo kowuta epai ya Nkolo wa bino. Botikela ngai bana ya isalayele nakende na bango
  106. Alobi (Falo): Soki oyei na elembo, lakisa yango soki ozali koloba bosóló
  107. Mpe abwakaki lingenda lia ye mpe libongwani nyoka ya monene
  108. Mpe abimisi loboko lia ye na (libenga) mpe ekomaki pembe тропа batali
  109. Bankumu ya bato ya falo balobi: Ya soló, oyo nde nganga ya monene
  110. Alingi abimisa bino na mabele ma bino, boye bokosala nini
  111. Balobi: Bozelisa ye na ndeko waye, mpe botinda basangisi bato na esika ya masano ya mboka
  112. Bakoyelaka yo banganga banso baye bayebi
  113. Mpe banganga ba falo bayeli ye, balobi: Tokozua mbáno soki tolongi
  114. Alobi: Iyo, mpe ya solo, bokozala o kati ya baye bazali pene na ngai
  115. Balobi: Eh Mûssa! Okobwaka liboso to biso tozala bato bayambo тропа kobwaka
  116. Alobi (Mûssa): Bobwaka. Мре tango babwaki, balokaki miso ya bato, mpe babangisaki bango mpe bayaki na bonganga bonene penza
  117. Mpe toyebisaki na Mûssa ete bwaka lingenda lia yo, тре tango abwakaki yango, emeli maye manso bango babwakaki
  118. Мре bosôló bomonanaki тре lokuta ebungaki тре екотакі pamba тропа maye bazalaki kosala
  119. Мре ndenge wana nde bakweisamaki mpe bazuaki soni
  120. Мре banganga bafukamaki na kotiya bilongi na mabele
  121. Balobi: Tondimi na Nkolo wa molongo mobimba
  122. Nkolo wa Mûssa na Háruna
  123. Falo alobi: Bondimi naye (Mûssa) yambo ete napesa bino ndingisa! Oyó nde mwango bosali kati na mboka mpo bobimisa bato na yango, bokoyeba kala te
  124. Nakokata bino maboko na makolo na lolenge ya bokeseni, mpe nako baka bino na nzete sima nakoboma bino banso
  125. Balobi: Ya soló penza, tokozongaka epai ya Nkolo wa biso
  126. Ozali kotomboko na biso mpo tondimi na bilembo bia Nkolo wa biso o ntango eyeli biso? Eh Nkolo wa biso! Bakisela biso boyiki mpiko, mpe oboma biso bamizilima
  127. Мре bankumu ya bato ya falo balobi: Boye ozali kotika Mûssa na bato naye mpo babebisa o kati ya mokili Mpe ye moko atika yo na banzambe nayo? Alobi: Tokoboma bana na bango ya mibali mpe tokotika basi na bango na bomoyi mpamba te ya soló, biso tozali na bokonzi likolo lia bango
  128. Mûssa alobi na bato baye: Bosenga lisungi epai ya Allah mpe bokanga motema. Ya sólo, mabele mazali ya Allah, akitanisaka yango na baye alingi kati ya bawumbu baye; mpe mbano ya malamu ekozala nde тропа babangi
  129. Balobi: Banyokolaki biso yambo ya boyei bwa yo тре sima ya bokomi bwa yo. Alobi: Boye Nkolo wa bino akoboma monguna wa bino mpe akitanisi bino na mabele, mpe akotalela bino ndenge nini bokosala
  130. Mpe tosilaki kozuisa bato ya falo mibu na mibu ebele na bozangi, na bokutuami ya bambuma mpo bakoka kokanisa
  131. Mpe soki bolamu ezui bango balobñoyo ewuti na biso, mpe soki mpasi ezui bango balobi: Bótala Mûssa na baye bazali naye, ya sólo, maye manso mazuaki bango ewutaki sé epaiya Allah, kasi ebele na bango bazali koyeba te
  132. Mpe balobi: Ata soki oyeli biso likamwisi, tokondimela na biso yo te
  133. Мре totindelaki bango pela ya mbula ya makasi, na mabanki na basili na magbololo mpe na makila, lokola bilembo bia polele. Kasi basalaki lolendo mpe bazalaki batomboki
  134. Mpe tango etumbu ekwelaki bango, balobi: Oh Mûssa! Sengela biso epai ya Nkolo wayo na maye apesaki yo elaka, soki alongoleli biso etumbu eye, tokondimela yo, mpe tokotikela yo bana na isalayele bökende elongo
  135. Mpe tango tolongoleli bango etumbu na eleko eye eyebanaki, bango wana bazangi botosi na elaka
  136. Mpe tosilikelaki bango mpe tozindisaki bango okati ya mayi mpo baboyaki kondima na bilembo bia biso, mpe bazalaki kotiya bokebi na yango te
  137. Mpe tokitanisaki bato oyo bazalaki na bolembu moniele ya mabele na eloli na yango miye topambolaki mpe elaka elamu ya Nkolo wayo ekokakiтропа bana ya isalayele тропа maye bakangaki mitema. Mpe tobebisaki maye falo na bato naye bazalaki kosala, mpe kotonga
  138. Mpe tokatisaki bana ba isalayele ebale mpe balekaki pene ya bato bazalaki kobondela bikeko. Mpe balobi: Oh Mûssa! Šalela biso nzambe lokola oyo ya bango. Alobi: Ya soló, bozali bato ya boyinga
  139. Ya sólo, baye wana, maye bazali kobondela ezali mabe, mpe nyoso bazali kosala ezali na ntina te (ezanga litomba)
  140. Alobi: Nalukela bino nzambe mosusu oyo azali Allah te mpe ye atomboli bino o kati ya mikili(otango na bango) koleka bato banso
  141. (Bokanisa) tango tobikisaki bino na etumbu ya falo, bazalaki koboma bana na bino ya mibali mpe bazali kotika basi ba bino. Mpe wana ezali momekano monene kowuta epai ya Nkolo wa bino
  142. Mpe topesaki elaka na Mûssa ya butu ntuku misato mpe tobakisaki zomi, mpo ete akutana na Nkolo waye na butu ntuku minei. Mpe Mûssa alobi na ndeko waye Hâruna: kitanela ngai na bato ba ngai, mpe zala na bango malamu mpe kolanda nzela ya babebisi te
  143. Mpe tango Mûssa ayaki na elaka na biso, mpe Nkolo waye asolisaki ye, alobi: Nkolo wa ngai, nalingi namona yo. (Allah) alobi: Okomona ngai te, kasi tala na ngomba ya libanga soki ekokoka kotelema na esika na yango nde okomona ngai. Mpe tango Nkolo waye alakisaki nguya naye, libanga epanzanaki mpe ekomaki putulu. Mpe Mûssa akueyaki lokola moto asimbami na kake tango azongisaki bomoto Mûssa alobaki: Nkembo nayo Nkolo, natubeli epai nayo, mpe nazali moto wa yambo ya bandimi
  144. Alobi: Oh Mûssa! Ya soló, naponi yo likolo ya bato banso, тропа bitinda bia ngai. Mpe na maloba та ngai, zúa maye napesi yo mpe zala elongo na batondi
  145. Mpe tokomelaki ye likolo ya mabaya makomi mpe malendisi ya makambo nyoso, mpe ndimbola ya biloko binso, simba yango makasi mpe tinda batonayo basalela ya malamu oyo ezuami otei na yango. Kala te nakolakisa bino esika ya babebisi
  146. Nakotiyaka bilembo bia ngai mosika тропа baye bazali kosala lolendo na mokili, batiki bosôló, Мре soki bamoni elembo nionso bakodimaka nango te. Mpe soki bamoni nzela ya semba bazali kolanda yango te. Mpe soki bamoni nzela ya libungi balandi yango. Wana mpo bazalaki kondima na bilembo bia biso te mpe babosanaki kolanda yango
  147. Mpe baye baboyaki kondima na bilembo bia biso na kozanga elikia ya mokolo mwa suka, babebisi misala mia bango, boye bakofutamaka te sé na maye basalaki
  148. Mpe sima bato ya Mûssa balandaki (ekeko) ya nyama. Basali yango na lolenge ya mwa ngombe ezali kobimisa lolaka. Boye, bazali kornona te ete solo akolobisa bango te, mpe ezali kokamba bango ata na nzela ya semba te? Bakamataki yango na yango bamibubaki
  149. Mpe ntango bamonaki ete basili kosala mabe, mpe bamimonaki ete basili kobunga, mpe balobaki: Soki Nkolo wa biso ayokeli biso mawa te mpe alimbisi biso te, tokozala solo o kati ya bazangi
  150. Mpe tango Mûssa azongaki epai ya bato naye, na nkanda mpe na kolemba, alobaki été: Bosali mabe ya monene sima na ngai! Boye bolingi bowelisa mokano ya Nkolo wa bino? Mpe abwakaki mabaya ya bikomeli mpe abendi mutu ya ndeko waye epai naye. Alobi: Oh mwana wa mama wa ngai! Basilisaki ngai makasi mpe balingaki koboma ngai. Kozua ngai monguna te, mpe kotiya ngai o kati ya babubi te
  151. Alobi (Mûssa): Nkolo wa ngai, limbisa ngai na ndeko wa ngai, mpe kotisa biso na ngolu nayo, yo nde ozali ngolu wa bangolu koleka
  152. Ya soló, baye bazali kozua mwa ngombe lokola nzambe na bango, kala te kanda kowuta epai ya Nkolo wa bango ekozua bango. Mpe bakozala mpamba o kati ya mokili, mpe ndenge wana nde tokofutaka bato mabe
  153. Mpe baye basalaki mbeba, sima batubeli mpe bandimi, Nkolo wayo solo, azali molimbisi atonda mawa
  154. Mpe tango kanda ya Mûssa ekutuamaki, (ekitaki) azui etanda ya makomi, mpe ezalaki na bokambi mpe ngolu тропа babangi Nkolo wa bango
  155. Mpe Mûssa aponaki okati na bato naye, mibali ntuku sambo mpo bakutana na biso, mpe tango boningani bwa mabele bozuaki bango. Alobi: Nkolo wa ngai, soki olingaki koboma bango ata liboso na ngai, boye okoboma biso тропа maye bazoba kati na biso basali?, wana ezali sé bomekano bwa yo, obungisaka na yango oyo olingi, mpe okambaka na yango oyo olingi. Yo ozali mobateli na biso limbisa biso mpe yokela biso mawa, mpo ozali malamu wa balimbisi
  156. Mpe tiyela biso bomengo (bolamu) na bomoyi ya nsé, mpe o mokolo mwa suka, mpe tozongi sé epai nayo. Mpe (Allah) alobi: Etumbu nangai ekozua oyo nalingi, kasi mawa na ngai ezingi biloko binso, nakopanza yango epai ya baye bazali kobanga mpe bazali kobimisa zakat, mpe bazali kondima na bilembo bia ngai
  157. Baye bazali kolanda motindami, ntoma wa boyinga oyo bakokuta ye akomami na torah epai na bango mpe na indjil. Azali kotinda bango na bolamu, mpe akopekisa bango mabe, mpe akopesa bango dingisa ya maye ya malamu, mpe akopekisa bango maye ya mbindo. Mpe akitiselaki bango kilo oyo bazalaki na yango na mibeko ya makasi oyo ezalaki likolo na bango. Na yango, baye bandimelaki ye mpe bapesaki ye lokumu mpe bapesaki ye lisungi, na bobongisi, mpe balandaki mwinda oyo ekitaki elongo naye, bango nde balongi
  158. Loba: Oh bino bato! Ya soló, nazali motindami wa Allah epai ya bino banso. Oyo azali Nkolo wa bokonzi bwa likolo na mabele, nzambe mosusu ya kobondela na bosóló azali te kaka sé ye (Allah). Apesaka bomoyi mpe apesaka liwa, bondima na Allah na motindami wa ye, ntoma wa boyinga oyo azali kondima na Allah na maloba maye. Mpe bolanda ye mpo bokoka kokambama
  159. Mpe kati na bato ya Müssa ezali na umma bazali kokamba baninga na nzela ya semba, pe na yango bazali kokata makambo na bosembo
  160. Mpe totiyaki bango na mabota zomi na mibale bitonga na motango na bango. Мре toyebisaki па Mûssa: Tango bato naye basengaki ye mayi ya komela, beta lingenda lia yo na libanga. Mpe ebimisaki maziba zomi na mibale, mpe libota na libota liyebaki liziba lia bango ya bomeli. Mpe tozipaki bango na mapata ya molili mpe tokitiselaki bango mana na salwaboliya ya malamu biye topesi bino. Mpe basali biso mabe te kasi bango moko bamisalaki mabe
  161. Mpe tango bayebisaki bango été: Bokota mpe bovanda na mboka oyo, mpe boliya maye bokolinga (ya malamu) mpe boloba hitwa mpe bokoto na ekuke na kogumbama, tolimbisa masumu ma bino mpe tokobakiselaka babongisi. (bolamu okati na bango)
  162. Mpe babubi o kati na bango babongoli liloba na lolenge mosusu batiki oyo bayebisaki bango. Mpe totindelaki bango etumbu kowuta o likolo тропа maye bazalaki kobuba
  163. Mpe tuna bango тропа mboka eye ezalaki pene na ebale. Tango bazalaki kokende о mokolo mwa mposo, bambisi bazalaki koyela bango polele kowuta na mayi, mokolo ya mposo na bango тре о mokolo mosusu ezali koyela bango te, ndenge wana nde tomekaki bango тропа maye bazalaki kobebisa
  164. Мре tango umma o kati па bango balobaki: Mpona nini bazali koteya bato baye Allah akoboma to akopesa bango etumbu ya makasi? Balobaki: Mpo tolongola mokumba mwa biso liboso ya nkolo wa bino, mpe mpo bakoka kobanga
  165. Mpe tango babosanaki maye bayebisaki bango, tobikisaki baye bazalaki kopekisa mabe mpe topesaki etumbu na basusu, mpona mabe maye bazalaki kosala
  166. Mpe tango baboyaki na maye bapesaki bango, tolobaki: В окота такако ya mabe na kozanga lokumu
  167. Мре tango Nkolo wayo alobaki ete: Nakomemelaka bango etumbu ya makasi kino o mokolo mwa suka, soló Nkolo wayo azalaka noki тропа etumbu, mpe solo, azalaka molimbisi atonda mawa
  168. Мре tokabolaki bango o kati na mokili bato na bato, kati na bango ya malamu, mpe kati na bango basusu ya mabe. Mpe tomekaki bango na bolamu mpe mabe mpo bakoka kozonga. (o nzela ya semba)
  169. Sima basusu bakitanaki bango тропа kozua buku, kasi bazalaki kosepela mingi kozua oyo ya bomoyi bwa nsé, mpe bazali koloba: Bakolimbisaka biso. Mpe soki basusu bayeli bango maye makokani na yango bazui yango. Boye bazuaki elako kowuta na buku te? Ete baloba te sé bosembo тропа Allah? Mpe batangaki maye bakutaki о kati na yango, kasi bovandi bwa mokolo mwa suka bozali malamu koleka тропа babangi, boye bozali kososola te
  170. Kasi baye bazali kolanda maye makomami o kati ya buku, mpe batelemisi losambo, solo penza tokobungisaka lifuta lia babongisi te
  171. Mpe tango totombolaki ngomba o likolo lia bango, lokola elilingi. Kasi bakanisaki ete ekokwela bango. Bosimba makasi maye topesaki bino mpe bokanisa maye mazali na kati, mpo bakoka kobanga
  172. Mpe tango Nkolo nayo abimisaki bakitani na mikongo ya bana Adam mpe amonisaki bango moko, mpe alobaki na bango été: Nazali Nkolo na bino te? Bazongisaki été: Iyo: Tot atoli. Mpo bowangana yango te o mokolo mwa suka na bolobi été: Ya soló, tosalaki angele na yango te
  173. Too bokolobaka: Bankoko ba biso basangisaki Allah liboso, mpe tozali bakitani na bango. Boye okoboma biso тропа maye babebisi basalaki
  174. Mpe ndenge wana nde tozali kolimbola bilembo (bia biso) mpo tango mosusu bakoka kozonga
  175. Yebisa bango sango ya oyo topesaki ye bilembo bia biso. Mpe amitiyaki mosika na yango, mpe satana azelisaki ye mpe azalaki o kati ya babungi
  176. Kasi soki tolingaka, mbele totombola ye na yango, kasi ye alingaki mokili mpe alandaki bisengo na bamposa na yango, ndakisa naye ezali lokola mbua oyo soki obengani ye abimisi lolemu azali kopema makasi, soki mpe otiki ye azali sé ndenge moko. Wana nde ndakisa ya baye baboyaki kondima na mikapo mia biso, betela bango masapo mpo tango mosusu bakokanisa
  177. Ndakisa nini ya mabe ya lolenge wana, ya baye baboyaki kondima na bilembo bia biso, mpe babubaki milimo mia bango moko
  178. Oyo Allah akambi, asili kokambama. Mpe oyo abungisi, baye wana nde bazangi
  179. Mpe tosilaki kobongisa lifelo тропа ebele ya bato mpe bilima. Bazali na mitema kasi bazali kososola na yango te, mpe bazali na miso kasi bazali kornona te mpe bazali na matoyi kasi bayokaka te. Bazali lokola banyama, kasi babungi koleka banyama. Baye wana nde bazangi bososoli
  180. Mpe Allah nde azali na ba nkombo kitoko. Bobenga ye na yango. Kasi botika baye bazali kosakana na ba nkombo naye, bako futama na maye bazalaki kosala
  181. O kati ya baye tokela ezali na umma, oyo bazali kokamba mpe kokata makambo na bosembo
  182. Mpe baye bazali koboya mikapo na biso tokomema bango moke moke o kati ya bozangi na bango epai nyoso bakoyeba te
  183. Mpe natikeli bango mwa ntango; ya soló mwango na ngai ezali makasi
  184. Boye bazali kososola te? Moninga na bango azali na ligboma te, kasi azali sé mokebisi ya polele
  185. Bazali kornona te bokonzi bwa likolo na ya nsé na biloko binso Allah akela? Ntango mosusu elaka na bango esili kokoma pene? Liloba mosusu nini bandima na yango nsima ya oyo
  186. Oyo Allah abungisi akozala na mokambi te, mpe akosundola bango, o kati ya botomboki nabango bazali koyimayima
  187. Bazali kotuna yo тропа mokolo ya nsuka ekokokisama ntango nini? Loba: Boyebi na yango ezali epai na Nkolo na ngai, sé ye moko nde akolakisa yango. Ezali likambo ya kilo kuna na likolo mpe na nsé ekoyela bino mbalakaka, bazali kotuna lokola osilaki koyeba yango loba: Ya soló, boyebi na yango ezali epai na Allah kasi ebele ya bato bazali koyeba yango te
  188. Loba: Nakoki te komizuela bolamu mpe nakoki te komilongola mpasi sé na bolingi bwa Allah. Mpe soki na yebaki mabombami mbele na mizuelaki bolamu ebele nde mabe moko ezuaki ngai te. Ngai nazali sé mokebisi mpe mopesi nsango malamu тропа bato ya kondima
  189. Ye nde akela bino kowuta na moto moko mpe kati naye abimisaki mwasi naye mpo été azua kimia epai naye (mwasi). Mpe ntango bakutanaki azuaki mokumba ya токе (zemi) azalaki kotambola na yango na libumu naye kino ekomaki kilo. Babelelaki Nkolo na bango (Adam na eva): Soki opesi biso mwana ya malamu tokozala kati ya baye bazali kopesa yo matondi
  190. Mpe ntango (Allah) apeși bango (mwana) ya malamu basangisi ye (Allah) na ba nzambe na likabo na oyo apesi bango. Lokumu na Allah ya likolo koleka na maye bazali kosangisa ye na yango
  191. Bakosangisa ye na baye bakela eloko moko te nzoka nde bango moko bakelama
  192. Bakokoka te (banzambe wana) kosunga bango mpe bakokoka te komisunga bango moko
  193. Mpe soki bobengi bango na bokambi bakoboya kolanda bino, ezali sé ndenge moko bobenga bango too bobenga te
  194. Ya soló, baye bozali kobondela na kotika Allah bazali sé bato lokola bino. Bobondela bango soki bakoyanola bino soki bozali na bosembo
  195. Boye; bazali na makolo mpo na kotambola na yango? To bazali na maboko bazali kosimba na yango? To bazali na miso тропа kornona? То bazali na matoyi bazali koyoka na yango? Loba: Bobenga banzambe na bino sima bosala ngai likita mpe bozelisa ngai te
  196. Ya solo, mokonzi na ngai Allah nde oyo akitisi buku (kurani) mpe ye nde mobateli ya bato ya malamu
  197. Kasi baye bozali kobondela na kotika Allah bakokoka kosunga bino te mpe milimo na bango moko te
  198. Mpe soki obengi bango na nzela ya nsemba bakoyoka te, mpe ozali kornona bango bazali kotala yo kasi bazali kornona te
  199. Zala na mawa, tinda kosala bolamu, mpe zala mosika na baye bazanga mayele
  200. Mpe soki satana akoteli yo été osala mabe, luka libateli epai na Allah mpo été azali moyoki mpe moyebi
  201. Ya soló, baye bazali na bobangi Allah soki emoniseli ya satana ekoteli bango, bakanisi nsima, tala bango ndenge bakomi ekenge
  202. Bandeko balongani na bango basatana bakozindisa bango na libunga mpe bakotika te
  203. Mpe soki oyeli bango bikamwiseli te, bakoloba: Mpona nini okosala yango na ndenge nayo te? Loba: Ngai na zali kolanda sé maye makiteli ngai epai na Nkolo wa ngai. Oyo (mikapo mia kurani) mizali bilembetele (bilembo) biwuti epai na Nkolo na bino, bokambi mpe ngolu mpo na bandimi
  204. Mpe soki kurani ezali kotangama boyoka yango mpe bofanda nye mpo été bozwa ngolu (ya Allah)
  205. Мре kundola nkombo ya Nkolo nayo na kati nayo na kobanga mpe na komikitisa na mongongo ya katikati ntongo mpe mpokua. Kasi kozala te elongo na baye bazangi makanisi
  206. Ya soló baye bazali epai ya Nkolo nayo (ba anzelu) bazali kosala lolendo te тропа kobondela ye, mpe bazali kokumisa ye na kofukamela ye