70.The Ascending Stairways

  1. Mosengi azali kosenga etumbu oyo ekozanga kokweya te
  2. Ekopekisama te mpo ekwela bapengwi
  3. Epai ya Allah nde nzela ya komata mpe kokita ezali
  4. Ba anzelu mpe molimo mosantu bazali komate epai naye na mokolo moko oyo tango na yango ezali kowumela lokola mibu nkoto ntuku mitano
  5. Zela bozeli ya malamu
  6. (Bapengwi) bazali kornona yango mosika
  7. Kasi tozali kornona yango pembeni
  8. Mokolo oyo likolo likopelaka lokola ebende ya mafuta
  9. Mpe bangomba bikokoma lokola elamba ya kofinika
  10. Molingami akotuna moninga te
  11. Bazali kotalana, moto mabe akoluka ete akaba bana naye mpo abatelama na etumbu ya mokolo wana
  12. To mwasi, to ndeko naye ya mobali
  13. (Ata soki bayei) moto naye ya libota oyo azalaki kobatela ye
  14. Ata bayei na manso mazali na nsé тропа kobatela ye
  15. Eloko te, ezali nde moto
  16. Ekolongola ye bamposa ya mutu na makasi
  17. Moto ekobengaka baye baboyaki kondima
  18. (Kolandana) na misolo oyo asangisaki na mokili mpe apekisaki na yango nzela ya Allah epanzana
  19. Ya soló, moto akelamaki na kozanga kimia
  20. Soki mabe ezui ye, akomi na bobangi
  21. Mpe soki bolamu ezui ye, akomi kopima yango
  22. Longola sé baye bazali kotelemisa losambo
  23. Baye bakangami na losambo na bango libela
  24. Мре baye bazali kobimisa (zakat) na misoio mia bango
  25. Mpona (kopesa) basengi na baye bazangi
  26. Mpe baye bazali kondima ya soló na mokolo ya suka
  27. Мре baye bazali kobanga etumbu ya Nkolo na bango
  28. Ya soló, eloko moko ya kopekisa etumbu ya Nkolo na bango ezali te
  29. Mpe baye bazali kobatela mitakala mia bango
  30. Longola sé epai ya basi na bango to mpe bawumbu na bango ya basi, wana ezali lisumu te epai na bango
  31. Kasi baye bakokende libanda ya oyo etindami awa, bango nde balekisi ndelo
  32. Mpe baye bazali kobatela biloko ya bato malamu, mpe bazali kotosa maloba na bango tango ya boyokani
  33. Mpe baye bazali kotatola sé bosóló
  34. Mpe baye oyo bazali kobatela losambo na bango
  35. Bango nde bakozala na lukumu okati ya bilanga ya lola
  36. Kasi nini na bapengwi oyo bazali kokima epai nayo bakingo etelemi
  37. Ngambu ya loboko ya mobali to ya loboko ya mwasi bazali ya kokabwana
  38. Boye moko na moko kati na bango azali kosepela ete bakotisa ye na lola ya nkembo
  39. Eloko te, mpo tokelaki bango na maye bayebi
  40. Mpe nalapi na Nkolo ya miniele mpe biloli na bilembo bia ngrásia ete: Ya soló, tozali na makoki
  41. Mpo ete tolongola bango toya na baye ya malamu, mpe moto akopekisa biso azali te
  42. Tika bango basakana mpe babunga kino bakokutanaka na mokolo oyo tolakaki bango
  43. Mokolo bakobima na malita noki lokola bazali kokima mbangu epai na mabanga matandami
  44. Bakokitisaka miso na bango mpe kotombola yango na soni, wana ekozalaka mokolo ya elaka na bango