71.Noah

  1. Ya soló totindaki Nûh epai ya bato naye ete: Kebisa bato nayo yambo ya etumbu makasi eyela bango
  2. Alobaki: Oh bato na ngai! Ya sôló, nazali mokebisi ya polele тропа bino
  3. Bobondela Allah, bobanga ye тре botosa ngai
  4. Mpo alimbisa bino masumu тре apesa bino mikolo kino elaka yango ekoka. Ya soló, tango elaka ya Allah ekoki ezelaka te soki bozali koyeba
  5. Alobi: Nkolo! Ya sólo, natei bato na ngai butu na moyi
  6. Kasi mateya na ngai ebakiseli bango sé kokima
  7. Mpe tango nazali kobenga bango mpo olimbisa bango, bazali kotiya misapi na matoyi na bango mpe kozipa yango na bilamba, basali motu makasi mpe lolendo
  8. Sima nabengaki bango na polele
  9. Mpe nayebisaki bango na polele mpe na lolenge ya kobombama
  10. Nayebisaki bango été: Botubela epai ya Nkolo na bino. Ya soló, ye azali molimbisi
  11. Mpo akitisela bino kowuta na likolo mbula ezala ya kolandana
  12. Mpe apesa bino misolo na bana ebele, mpe abómbela bino bilanga mpe mingala
  13. Mpona nini bozali kokumisa Allah te na ndenge esengeli
  14. Mpe akela bino ndambu ndambu ya kotangama
  15. Bozali kornona te lolenge Allah akela mapata sambo elandani
  16. Mpe atiya bongengi kati ya sanza mpe mwinda okati ya moyi
  17. Allah nde abimisa bino na mabele lokola milona
  18. Sima akozongisa bino kati na yango mpe sima akobimisa bino penza
  19. Allah atandela bino mabele ezala lokola etoko
  20. Mpo botambola na kati ya banzela na yango
  21. Nûh alobaki ete: Nkolo! Baboyi kotosa ngai kaši balandi sé moto oyo bozui naye na bana ekobakisela ye sé libungi
  22. Mpe basali likita ya monene, (ya mabe)
  23. Mpe balobi ete: Botika banzambe na bino te, botika Waad te, botika mpe Suwaa te, yarúsa te, yaúqa mpe te na Nasra te. (ezali bankombo ya bikeko ya bango bazalaki kobondela)
  24. (Mpe) yango bisili kobungisa ebele mpe ezali kobakisela babubi sé libungi
  25. Mpona mabe na bango, bazindisamaki na mayi, mpe bakotaki na móto, mpe bazuaki basungi te na botiki Allah
  26. Mpe Nûh alobi: Nkolo! Kotika ata mopagano moko te na mokili
  27. Soki otiki bango (na bomoyi), bakobungisa bawumbu nayo mpe bakobota sé basumuki
  28. Nkolo! Limbisa ngai, na baboti na ngai na moto nyoso oyo akokota ndako na ngai mondimi mpe bandimi ya mibali na ya basi, mpe kobakisela bapengwi te sé libungi