72.The Jinn

  1. Loba: Emoniseli ekitela ngai ya soló ete: Lisanga moko ya bilima batiaki matoyi тропа koyoka mpe balobaki ete: Ya sólo, toyoki buku ya lokumu na etangeli ya somo
  2. Ezali kokamba na nzela ya semba mpe tondimaki na yango, mpe tokosangisa Nkolo wa biso na eloko mosusu te
  3. Ya sólo, bonene naye Nkolo ya biso ekumama, azali na mwasi te, mpe mwana te
  4. Mpe ya sólo, ye (satana) azali koloba mabe тропа Allah
  5. Mpe tokanisi ete: Bato na bilima bakoki kokosela Allah te
  6. Mpe ya sólo, Kati na bato, ezali na mibali misusu bazali koluka libateli epai ya bilima ya mibali, kasi yango ezali kobakisela bango sé mpasi
  7. Mpe bakanisaki lolenge bokanisaki été Allah akosekwisa moto te
  8. Мре ya soló tomataki na mapata тропа koluka koyokamela, kasi tokutaki yango na babateli ya makasi mpe minzoto ya moto (mizali kobamba na mbangu mingi)
  9. Мре tozalaki kofanda mpe koyoka, kasi oyo akoyokamela sika oyo akokutana na masasi ya moto (minzoto) ekobengana ye
  10. Mpe ya sólo, toyebi te soki bazali kolingela bato ya mokili mabe to Nkolo na bango alingi kotiya bango na nzela ya semba
  11. Mpe kati na biso tozali na baye ya malamu mpe basusu bazali mabe, mpe tokabwanaki na mangomba ebele
  12. Mpe ya sólo, tokanisaki été tokokutola nguya ya Allah awa na nsé te mpe lisusu ete tokosilisa nguya naye te na kokima
  13. Mpe ya sólo, tango toyokaki bokambi, (kurani) tondimaki na yango, mpe oyo akondima na Nkolo naye, abanga te тропа bokutolami ya lifuta naye, mpe akobebisama te
  14. Mpe kati na biso, tozali na baye bazali bamizilima mpe na baye bazali babubi mpe baye bayambaki islam nde baye balukaki nzela ya semba
  15. Kasi тропа babubi, bakozala na moto ya lifelo ya bakoni oyo ezali kopela
  16. Soki bamitiyaka na nzela ya malamu, tolingaki komelisa bango mayi ya malamu
  17. Mpo tomeka bango kati na yango. Kasi oyo akoboya bokundoli ya Nkolo naye, akosukisa ye na nzela ya etumbu oyo ekosilaka te
  18. Mpe ya sôló, ba Masâdjid bizali тропа Allah, kasi bobondela eloko mosusu elongo na Allah te
  19. Mpe tango mowumbu ya Allah atelemaki тропа kosambela ye, bayaki ebele kotelema pembeni naye (tango wana nde bilima bandimaki na kurani esantu tango etangamaki)
  20. Loba: Nazali kobondela Nkolo na ngai mpe nakosangisa ye na eloko mosusu te
  21. Loba: Ya sólo, ngai nazali na bokoki ya kosala bino mabe to kotiya bino na nzela ya semba te
  22. Loba: Ya soló, moko te akobatela ngai na botiki Allah, mpe nazui ekimeli mosusu te na botiki Allah
  23. (Nazali se) momemi sango mpe kokomisa liloba ya Allah. Mpe oyo akozanga kotosa Allah na motindami naye, ya solo akozala na moto ya lifelo libela na libela
  24. Kino bakomona oyo elengelami тропа bango ya etumbu, тре bakoyeba ba nani bazali па lisungi ya makasi, mpe ba nani bazali mike
  25. Loba: Nayebi te maye balaki bino ezali pene to Nkolo na ngai atikeli yango tango molai
  26. Moyebi ya mabombami, mpe moko te ayebi mabombami naye
  27. Longola sé oyo akosepela naye lokola motindami, mpe akotiela ye bakengeli liboso na sima naye
  28. Mpo bayeba été bakomisa maloba ya Nkolo na bango, mpe azingi maye bazali na yango, mpe ayebi motango ya biloko nyoso