73.The Enshrouded One

  1. Eh yo (Muhammad) mofiniki bilamba
  2. Telema mpo (osambela) butu mobimba, longola sé mwa tango moke
  3. Kati kati na yango to moke
  4. To bakisa yango mpe tanga kurani malembe mpe polele
  5. Tokokitisela yo maloba ya kilo (ya lokumu penza)
  6. Kosambela na butu ezali malamu mpe epesaka makasi, mpe ezali malamu mingi тропа botangi
  7. Mpo ete ya soló, ozali na misala ebele na moyi
  8. Mpe kanisa nkombo ya Nkolo nayo mpe mipesa naye
  9. Nkolo ya moniele mpe eloli, nzambe mosusu azali te ya kobondela na bosóló sé ye, zúa ye mobateli (wa bino)
  10. Kanga motema na maye bazali koyebisa yo, mpe mitiya mosika na bango na lolenge ya malamu
  11. Мре tika ngai na baye bazuaka manso na lokuta baye bazali kosepela na bisengo na bango, bazali sé na tango moke ya kozela
  12. Ya soló, tobombeli bango singa ya monene mpe lifelo
  13. Mpe bilia ya solo mabe, mpe etumbu ya makasi
  14. Mokolo oyo mabele na bangomba bikoningana, mpe bikokoma lokola mputulu ya zelo ya kopanzana
  15. Ya soló, totindelaki bino motindami, azala nzeneneke epai ya bino, lolenge moko totindaki motindami epai ya falo
  16. Mpe falo aboyaki kotosa motindami mpe tozuaki ye kozua moko ya mabe
  17. Ndenge nini bokomibatela na bopengwi na mokolo oyo ekokomisa bana lokola bampaka suki mpembe
  18. Likolo likopasukaka (na somo wana) mpe akokokisaka elaka naye, wana ezali na tembe te
  19. Ya sólo, oyo ezali bokundoli, oyo alingi, azua nzela epai na Nkolo naye
  20. Ya soló, Nkolo nayo (Muhammad), ayebi ete otelemaka na nsé ya mibale ya misato ya butu, mpe kati kati na yango, mpe moko ya misato na yango, elongo na ndambu ya bandimi batelemaka mpe lokola. Allah azali kokabola butu na mokolo, ayebi ete bokokoka kotanga yango te yango ayambi tubeli na bino. Kasi botanga oyo ezali mpete kati na kurani, ayebi ete kati na bino bato ya bokono bakozala, basusu bakotambola тропа koluka bolamu ya Allah, mpe basusu bakokende kobunda na nzela ya Allah. Botanga oyo ezali mpete kati na yango, mpe botelemisa losambo mpe bofuta zakat mpe bokotisa Allah nyongo ya malamu. Mpe bolamu nyoso bokosala, bokokuta yango epai na Allah, azali malamu mpe monene na kofuta, mpe bosenga Allah bolimbisi. Ya sólo, Allah azali molimbisi atonda ngolu