74.The Cloaked One

  1. Eh yo (Muhammad) mozipani na bulangiti
  2. Telema mpe kebisa
  3. Mpe kumisa Nkolo nayo ya monene
  4. Mpe petóla bilamba nayo
  5. Mpe mitiya mosika na masumu nyoso. (mpe tika yango)
  6. Mpe kopesa te mpo bafuta yo
  7. Mpe zala na bozeli тропа Nkolo nayo
  8. Mpe tango bakofula kelelo
  9. Wana ekozala mokolo ya mpasi
  10. Mpona bapengwi ekozala mpete te
  11. Tika ngai na oyo nakeli ye moko
  12. Mpe oyo napesaki misolo ebele
  13. Mpe (napesi ye) bana oyo bazali naye tango nyoso
  14. Mpe oyo nalongolelaki mindondo nyoso
  15. Sima, apengwi na bolamu (na ngai)
  16. Te; ya soló, azalaki kowangana mikapo mia biso na mutu makasi
  17. Nakopesa ye pasi ya koleka
  18. Ya sólo, akanisaki mpe azuaki mokano
  19. Akufa na ndenge akanaki
  20. Sima akufa na ndenge akanaki
  21. Sima atalaki
  22. Sima abebisi elongi mpe akangi
  23. Sima abongoli mokongo mpe asali lolendo
  24. Mpe alobi: (Kurani) oyo ezali bonganga oyo etangisami
  25. Wana ezali sé liloba lia moto
  26. Nakozikisa ye na moto ya saqar
  27. Nani akoyebisa yo nini saqar
  28. Etiki eloko te mpe ebateli te
  29. Ezali kozikisa mposo ekomi moyindo
  30. O kati na yango ezali na (ba anzelu) zomi na libua
  31. Mpe totiaki bakengeli ya moto sé ba anzelu, mpe totiaki motango na bango sé ezala komekama epai ya bapengwi, mpo ete baye bazua buku liboso bayeba yango mpe ebakisa bondimi epai na bandimi, mpo ete baye bazua buku liboso na bandimi bazala na ntembe te, mpe mpo ete bapagano na baye bazali na bokono o mitema baloba ete: Allah alingi nini na ndakisa oyo? Lolenge wana nde Allah azali kokamba nani alingi mpe kobungisa nani alingi. Mpe moko te ayebi mapinga ya Nkolo nayo sé ye mei. Mpe wana ezali sé bokundoli тропа bato
  32. Te; (nalapi) na sanza
  33. Mpe butu tango elalaka
  34. Mpe tongo tango etanaka
  35. (Saqar) ezali moko ya (etumbu) ya monene
  36. Ezali bokundoli тропа bato
  37. Oyo akolinga okati na bino, alanda yango to azonga sima
  38. Molimo nyoso akozua oyo asalaki
  39. Longola sé bato ya ngambu ya loboko ya mobali. (balongi)
  40. (Bakozalaka) na lola bakomitunama
  41. (Mpona) batomboki
  42. Eloko nini ekotisi bino na saqar
  43. Bakolobaka: Tozalaki kosambela te
  44. Mpe tozalaki koleisa babola te
  45. Mpe tomitiyaki ngambu ya baye balingaki sé koloba mabe
  46. Mpe tozalaki kondima тропа mokolo ya suka te
  47. Kino liwa liyelaki biso
  48. Bolobeli ya balobeli ekosalisaka bango te
  49. Mpona nini bapesaki bokundoli mokongo
  50. Bakomi lokola humuru ya kopanzana
  51. Tango bazali kokima nkosi
  52. Nyoso kati na bango azali koluka azua mokanda mpo ayeba
  53. Ah kasi te! Bazalaki kobanga mokolo ya suka te
  54. Ah te! Oyo ezali ya soló bokundoli
  55. Oyo alingi akanisa
  56. Mpe bakokanisaka te sé Allah alinga. Ye nde esengeli babanga mpe ye nde Nkolo bolimbisi. atonda ngolu