75.The Resurrection

  1. Nalapi na mokolo ya lisekwa
  2. Mpe nalapi na molimo oyo elingi kotika mabe te
  3. Moto akanisi été tokosangisa mikuwa mia ye te
  4. Kasi tozali na bokoki ya kobongisa ye. (mpe kozongisa ye lolenge azalaki)
  5. Moto alingi sé atikala na mabe
  6. Azali kotuna: Lisekwa ekozalaka mokolo nini
  7. Tango miso ekobulungana (ezangi kornona)
  8. Mpe sanza ekozanga bongengi na yango
  9. Mpe moyi na sanza ekosanganaka
  10. Mokolo wana moto akolobaka: Wapi nzela ya kokima
  11. Esika ya kokima ezali te
  12. Bozongi ekozalaka mokolo wana epai ya Nkolo nayo
  13. Bakoyebisa moto mokolo wana maye asalaki na maye atikaki тропа kosala sima
  14. Kasi moto ye moko akoyebaka (makambo naye)
  15. Mpe ata asengi bolimbisi
  16. Kowelisa lolemu nayo te тропа kotanga na yango (kurani)
  17. Ya soló, biso nde tokosangisa yango na motema nayo mpe kotanga yango
  18. Tango tozali kotangisa yo yango, landa yango malamu
  19. Sima ya sólo, tokolimbolela yo yango
  20. Kasi bolingi sé (bomoyi) ya nsé
  21. Mpe botiki oyo ya mokolo ya suka
  22. Mokolo wana okomona bilongi bikongenga
  23. Bizali kotala Nkolo na yango
  24. Mpe mokolo wana bilongi bikoyinda
  25. Bizali kozela etumbu
  26. Kasi te! Tango (molimo) тококота na mongongo
  27. Мре ekolobama: Nani sika oyo mobikisi
  28. Akanisi été alingi akufa. (azali kobunda na liwa)
  29. Mpe lokolo elali likolo ya moninga
  30. Bakomema yo epai ya Nkolo nayo mokolo wana
  31. Mpo andimaki te mpe atelemisaki losambo te
  32. Kasi aboyaki mpe apesaki mokongo
  33. Sima akendaki epai ya bato naye azali kosala lolendo
  34. Mpasi nayo mpasi
  35. Sima mpasi nayo mpasi
  36. Moto azalaki kokanisa ete bakotika ye sé pamba bongo (sima ya kokela ye)
  37. Boye abima kowuta na mayi ya mokongo te oyo elonama
  38. Sima na yango akomaki liboke ya makila mpe apesaki ye lolenge ya kitoko te
  39. Sima akelaki lolenge ya bato mibale te? Mwasi na mobali
  40. Ezali (Allah) te nde azali na bokoki ya kosekwisa bawei