Ezali na tango molayi eleka na mokili moto azalaki eloko moko te liboso ete akelama
Ya soló, tokelaki moto na litanga ya mayi ya mokongo (oyo esangani na biloko ebele), тропа tomeka ye na yango, mpe totieli ye boyoki mpe bomoni mpo oyoka mpe amona
Ya solo, tolakisaki ye nzela mpo atondo (Allah) to apengwa
Ya solo, tolengeli тропа bapengwi minyololo ya basinga milai ya makasi mpe etumbu ya saira. (moto ya makasi ya lifelo)
Ya solo, babangi (Allah) bakomelaka na bakopo ya kitoko ya kafura ya malili solo kitoko
Esika oyo bawumbu ya Allah bakomelaka ndenge balingi ezali kobimisa mayi ya malamu
Bakoyekamaka likolo ya bakiti ya kitoko, moyi ekotungisaka bango te mpe bakoyokaka malili makasi te
Bilili na yango bikozipa bango penepene, mpe mbuma na yango bikokita tii pembeni na bango тропа kobuka
Mpe bakopesaka bango bitiyelo biye bisalami na mabende ya mbongo na bakopo bisalami na mabanga ya pembe ya kitoko bikotambwisama likolo na bango тропа kólia mpe komela
Bakopo to milangi ya mabende ya kongenga ya кококапа
Мре bakomelaka mayi oyo esangani na tangawisi
Ezali kowuta na liziba oyo ebengami salsabila kuna na kati
Мре bilenge mibali ya libela bakotambola nakati na bango тропа kosalela bango, soki omoni bango okokanisa ete bazali mabanga ya mayi ya kongenga oyo epanzani
Mpe soki otali kuna okomona kitoko na bokonzi bonene
Мре bakolata bilamba ya langi ya mayi ya pondu ya lolenge ebele тре basinga ya palata na maboko na bango mpo na bonzenga. Mpe Nkolo wa bango akomelisa bango mayi ya bopeto
Ya soló, oyo ezali lifuta тропа bino, mpe molende na bino ekofutama
Ya sólo, biso nde tokitiselaki yo kurani oyo na ndambu ndambu
Zala na bozeli na oyo Nkolo nayo apesi mibeko, mpe kotosa mosumuki to mopengwi te okati na bango
Мре tanga nkombo ya Nkolo nayo tongo mpe pokwa
Mpe na butu ofukamela ye, mpe okumisa ye butu molayi
Ya soló, bango balingi (bomoyi) ya nsé, mpe batiki sima na bango mokolo ya kilo mpe ya somo
Biso nde tokela mpe tobongisi bokeli, soki tolingi tokoya na bato mosusu na esika na bango
Ya sólo, oyo ezali bokundoli, oyo alingi, azwa nzela ya kokende epai ya Nkolo naye
Na yango: Bokolinga eloko te sé ezala na bolingi ya Allah. Ya sólo, Allah azali moyebi atonda bwanya
Akotisaka oyo alingi na mawa naye, kasi тропа bato mabe, abombeli bango etumbu ya makasi