77.The Emissaries

  1. (Nalapi na nkombo) ya baye batindamaki ya kolandana! (ba anzelu)
  2. Mpe na baye bafulaka mopepe na mbonge makasi
  3. Mpe bazali kopanza bisika binso
  4. Mpe na baye bakabolaka mabe na malamu
  5. Mpe na baye babwakaka mbela
  6. Mpona bolimbisi to bokebisi
  7. Oyo bolakamaki ekozangaka te
  8. Tango minzoto mikolimwaka
  9. Mpe tango mapata ekopasuka
  10. Mpe tango bangomba bikolalisamaka
  11. Mpe tango ngonga ya bosangani ya batindami ekotiyamaka
  12. Yango ezongisami mpona mokolo nini
  13. O mokolo ya kokata makambo
  14. Mpe nani akoyebisaka yo mokolo ya kokata makambo
  15. Etumbu ekozalaka mokolo wana тропа bakosi
  16. Boye tobomaki bamisusu liboso te
  17. Sima tolandisaki bamisusu te
  18. Lolenge wana nde tokosalelaka batomboki
  19. Etumbu ekozala mokolo wana тропа bakosi
  20. Boye tokelaki bino na mayi ya moselu te
  21. Мре totiyaki yango na ebombelo elamu te
  22. Na elaka oyo eyebani te
  23. Totiyaki mibeko na lolenge ya malamu te
  24. Etumbu ekozalaka mokolo wana тропа bakosi
  25. Boye totiyaki mabele ezala ebombelo ya (makambo) nyoso te
  26. (Mpona) baye bazali na bomoyi na baye bakufa
  27. Boye topikelaki yango bangomba ya milai? Mpe tomelisaki bino mayi ya elengi te
  28. Etumbu ekozalaka mokolo wana тропа bakosi
  29. Bökende epai ya maye bozalaki kozua yango nalokuta
  30. Bökende epai ya elili ya milinga oyo ezali na mozindo misato
  31. Oyo ezali na elili te mpe ekoki kobatela moto na motó te
  32. Ya soló motó ezali kobwaka balolemo na yango ya kilo lokola bandako ya kilo
  33. Ezali lokola bakamela langi na yango lokola mayi ya mosaka
  34. Etumbu ekozalaka mokolo wana тропа bakosi
  35. Mokolo wana bakolobaka te
  36. Mpe bakolingela moto moko bolimbisi te
  37. Etumbu ekozalaka mokolo wana тропа bakosi
  38. Oyo nde mokolo ya kokata (makambo), tokosangisa bino na bato ya liboso
  39. Soki bolingi bosala likita ya mabe тропа ngai, bosalela ngai
  40. Etumbu ekozalaka mokolo wana тропа bakosi
  41. Ya soló babangi, bakozala na bisika ya malili mpe ya maziba
  42. (Bakoliaka) bambuma oyo balingi
  43. Bolia, mpe bomela na mposa na bino тропа maye bosalaki
  44. Ya sólo, lolenge wana nde tokofutaka babongisi
  45. Etumbu ekozalaka mokolo wana тропа bakosi
  46. Bolia mpe bomela (токе na mokili), Ya sólo penza bozali batomboki
  47. Etumbu ekozalaka mokolo wana тропа bakosi
  48. Mpe tango bayebisaki bango: Ete bogumbama, kasi balingaki kogumbama te. (тропа Allah)
  49. Etumbu ekozalaka mokolo wana тропа bakosi
  50. (Sima na yango), liloba nini lisusu bokondimaka