Mpe totongaki te likolo na bino (mapata) sambo ekembama
Mpe totiaki te o’teyi na yango mwinda mozali kongenga
Mpe tokitisaki kowuta na mapata mayi ebele
Mpo ete na mayi tobimisa bambuma mpe bilona
Na bilanga ekembisami (kitoto)
Ya soló, mokolo ya mbano mozali na ntango ya koyebana
Mokolo bakofula kelelo bokoya lisanga lisanga
Mpe likolo likofungwama bikokoma bikuke
Mpe bangomba bikotambola na lombango
Ya solo, lifelo ezali kozela
Esika yakofanda тропа batomboki
O’kati na yango bakofanda seko na seko
O’kati na yango bakoyoka mopepe ya kitoko te mpe bakomela eloko te
Longola sé mayi ya moto ya tofina
Lokola lifuta lia bosembo тропа bango
Mpo ete bazalaki kondima na mokolo mwa bosambisami te
Mpe batiaki ntembe na maloba na biso
Nzoka nde biso totiaki manso na mokanda
Kasi bomeka! Biso tokobakisa pona bino te sé etumbu
Ya soló, elonga ezali тропа babangi (Allah)
Bilanga mpe masanga ya bilengi
Mpe bilenge basi baye bazali banso ya mbula moko
Mpe bankopo ebele ya bomeli
O’kati na yango bakoyokaka makambo mazanga ntina te mpe lokuta te
Yango nde lifuta kowuta na Nkolo nayo lokola libonza
Ye Nkolo mapata mpe mabele na maye mazwami kati kati na yango, Ar-Rahmân bakozala na liloba te o’boso bwa ye
Mokolo molimo mosantu mpe na ba anzelu bakotelema molongo moko mpe moto akozala na liloba te longola sé oyo Ar-Rahmân (Allah) akopesa ye ndingisa mpe akoloba sé bosembo
Mokolo yango ezali ya sólo. Oyo alingi amitia na libateli ya Nkolo naye
Ya sólo, tokebisi bino na etumbu ya pene, mokolo moto akomona maye maboko maye masalaki na ntango ena mopagano akoloba ete: Eh mpasi na ngai! Na bongwana ata mabele