79.Those who drag forth

  1. (Na lapi) na baye bapikolaka na makasi
  2. Mpe na baye bayambaka na boboto
  3. Mpe baye batambolaka ndenge balingi
  4. Mpe balekaka na lombango
  5. Mpe bazali kobongisa makambo
  6. Mokolo moye mabele makoningana (na bofuli ya yambo)
  7. Sima elandani ya mibale
  8. Mokolo mona mitema mikoningana na bobangi
  9. Miso ma bango mikobanga
  10. Bakoloba ete: Ya sôló, tokozongisama na bomoyi na biso sima ya liwa
  11. Sima, yakokoma mikuwa ya kopola
  12. Balobi ete: Wana ezali bozongisami ya mpamba
  13. Ya sôló, yango ezali bosangisi ya mbala moko
  14. Mpe bakozwamaka likolo ya mabele kowuta na malita ma bango
  15. Sango ya Mûssa ekomelaki yo te
  16. Ntango Nkolo naye abengaki ye na ngomba esantu
  17. Kende epai ya falo pamba te asili kotomboka
  18. Мре loba naye ококі komipetola te
  19. Мре nakamba yo epai ya Nkolo nayo mpo obanga ye
  20. Mpe (Mûssa) alakisaki ye likamwisi linene
  21. (Falo alobaki) eza lokuta mpe aboyaki kotosa
  22. Sima apesaki mokongo mpe asali lolendo
  23. Abiangi mpe asangisi bato naye
  24. Sima alobaki ete: Ngai nazali Nkolo na bino oyo azali na likolo koleka
  25. Na yango Allah azwaki ye na etumbu awa na nsé mpe na mokolo ya suka
  26. Wana ya soló, ezali elembo тропа moto azali na bobangi
  27. Kokelama na bino ezali makasi koleka to mapata maye atonga
  28. Atombola etando na yango mpe akokisa yango
  29. Atieli yango butu na moyi
  30. Mpe na sima atandi mabele
  31. Mpe na kati na yango abimisi mayi na matiti
  32. Mpe atelemisi bangomba
  33. Ezali bilei тропа bino mpe na bibuele na bino
  34. Kasi ntango bobulungani ya monene ekoya
  35. Mokolo moye moto akokanisa maye asalaki
  36. Moto ya lifelo mokozala polele na oyo akomona
  37. Mpona oyo alekisaki ndelo
  38. Mpe aponaki bomoyi bwa nsé
  39. Ya soló, lifelo ekozala esika naye ya kofanda
  40. Kasi mpona oyo abangaki kotelema liboso ya Nkolo naye mpe amipekisaki na bamposa
  41. Ya soló, lola ekozala esika naye ya bopemi
  42. Bazali kotuna yo na maye matali mokolo ya suka ntango nini mokolo yango
  43. Bwanya nini ozali na yango тропа koyanola bango
  44. Ngonga na yango eyebani epai na Nkolo nayo
  45. Ya soló yo ozali sé mokebisi тропа oyo azali na bobangi ya mokolo wana
  46. Ntango bakomona yango bakomimona lokola barandaki na malita sé mokolo moko to ndambo ya mokolo