80.He frowned

  1. Akangi elongi mpe apesi mokongo
  2. Mpo ete mokufi miso aye epai naye
  3. Nani akoyebisa yo ntango mosusu ye alingi komipetola
  4. To mpe kokanisa mpo ete mateya esalisa ye
  5. Mpona moto oyo amitondisi na lolendo mpona bozwi naye
  6. Ozali koyamba ye na lombango
  7. Kasi bopetwami naye ezali na maboko nayo te
  8. Kasi mpona oyo aye na lombango epai nayo
  9. Naye azali na bobangi
  10. Ozali kotala ye te
  11. Kosala lisusu boye te oyo ezali ya soló liteya
  12. Oyo alingi akanisa yango
  13. Ezwami kati ya makomi ya lokumu
  14. Etombwami mpe epetolami
  15. O’maboko ma bantoma
  16. Baye ya lokumu тре botosi
  17. Moto amibomi na bopengwi naye
  18. Na eloko nini akelamaki
  19. Akelamaki kowuta na mayi ya mokongo, akeli ye mpe akokiseli ye mokano mwa ye
  20. Sima alakisi ye nzela
  21. Sima abomi ye mpe akotisi ye na lilita
  22. Mpe akosekwisa ye na ntango alingi
  23. Moto akokisi te maye atindamaki
  24. Esengeli na moto atala bileyi naye
  25. Ya soló, biso nde tozali kokitisa mayi
  26. Sima topasoli mabele na nzela
  27. Mpe na nzela wana tobimisi bambuma
  28. Ba inab mpe bandunda
  29. Na nzete ya zaítún na nzete ya nagh’l
  30. ЗО. Мре bilanga ebele
  31. Мре tobimisi mbuma mpe matiti
  32. Bileyi тропа bino na An’âm na bino
  33. Kasi tango bobulungani ekoya
  34. Mokolo moye moto akokima ndeko naye
  35. Mpe akokima mama naye mpe tata naye
  36. Akokima mwasi naye mpe bana baye
  37. Mpamba te mokolo wana moto na moto akotala sé makambo matali ye
  38. Mokolo wana bilongi bisusu bikongenga
  39. Bakoseka mpe bakosepela
  40. Kasi bilongi bisusu mokolo yango bikozala na putulu
  41. Bikozipama na molili
  42. Baye wana nde bazali bapengwi mpe bato ya mabe