81.The Overthrowing

  1. Ntango mwese (moyi) mokokoma molili
  2. Mpe ntango minzoto miko limwa
  3. Mpe bangomba bikotambola
  4. Mpe ntango bakamela ya zemi bakosundolama
  5. Mpe banyama ya mabe bakosangisama
  6. Mpe ntango bibale bikopela móto
  7. Mpe milimo mikosangisama
  8. Mpe ntango mwana шоке ya mwasi akotunama
  9. Nalisumu nini asalaki mpo baboma ye
  10. Mpe ntango bakosakola makomi
  11. Mpe ntango mapata makopasuka
  12. Mpe ntango lifelo likopelisama
  13. Mpe ntango lola ekokoma pembeni na bato
  14. Moto akoyeba maye asalaki
  15. Te, na lapi na mapata maye matongami
  16. Maye mazali kokima mpe kolimwa
  17. Na lapi mpe na butu ntango ekweyaka
  18. Mpe na ntongo ntango etanaka
  19. Ya soló, oyo ezali liloba ya motindami gabiliyele ya lokumu
  20. Atondi na nguya kowuta epai na Nkolo ya ngwende ya lokumu
  21. Atosami atonda bosembo
  22. Sôló ndeko na bino (Muhammad) azali na ligboma te
  23. Amonaki ye ya sôló na suka, oyo likolo emonanaka polele lokola ekweyi na mabele
  24. Azali kobomba te maye makitaki epai naye
  25. Yango (kurani) ezali liloba ya satana te
  26. Bozali kokende wapi
  27. Ezali sé bokundoli тропа molongo mobimba
  28. Na oyo alingi kati na bino amisembwama
  29. Bokolingaka te sé sima ya kolinga ya (Allah) Nkolo ya mokili