82.The Cleaving

  1. Ntango likolo ekokabwana
  2. Mpe ntango minzoto mikolimwa
  3. Mpe ntango bibale bikosangisama
  4. Mpe ntango malita makobalusama mpe makobimisa bawa
  5. Molimo mokoyeba maye awelisaki mpe maye azelisaki
  6. Oh yo moto! Nini ekosi yo тропа Nkolo nayo ya bolingo
  7. Oyo akeli yo mpe abongisi lolenge nayo
  8. Mpe asali yo na lolenge naye alingaki
  9. Kaši bozali na ntembe тропа mokolo ya suka
  10. Mpe ya sôló, bozali na bakengeli
  11. Bankomi ya sôló
  12. Bayebi maye manso bozali kosala
  13. Ya soló, bato ya malamu bakozala o’kati ya bisengo
  14. Mpe ya soló bato ya mabe bakozala okati ya lifelo
  15. Bakozikisama na yango mokolo ya mbano
  16. Mpe bakozangisama te na etumbu ena
  17. Kasi nani akoyebisa yo nini yango mokolo ya mbano
  18. Sima lisusu nani akoyebisa yo nini yango mokolo ya mbano
  19. Mokolo moye molimo ekosalisa molimo mosusu na eloko te mpe mokolo mona mobeko mokozala sé ya Allah