83.Defrauding

  1. Mawa na baye bazali koy iba
  2. Baye ntango bazali (kosomba) bazali kosenga ete bakokisela bango emekeli
  3. Kaši ntango bazali komeka pona bato mosusu bazali kozangisa
  4. Bango bazali kokanisa ete bakozonga na bomoi te sima ya liwa
  5. Na mokolo ya monene
  6. Mokolo moye bato bakotelema liboso ya Nkolo ya molongo
  7. Kasi ya soló, buku ya bato ya mabe ekozala okati ya sidjíne
  8. Nani akoyebisa yo eloko nini sidjíne
  9. Buku eye ekomama
  10. Mokolo wana etumbu ekozala тропа baye baboyi kondima
  11. Baye bazali kozwa mokolo ya suka na lokuta
  12. Kasi akoboya kondima sé molekisi ndelo mosumuki
  13. Oyo soki batangeli ye maloba na biso alobi: Wana ezali másese ya bakoko ya kala
  14. Ezali boye te, kaši mitema miabango mizali na mbindo na maye bazalaki kosala
  15. Kasi basala angele ya soló mokolo mona mokozipa bango mpo ete bamona Nkolo na bango te
  16. Sima bakozikisama ya sólo okati ya lifelo
  17. Sima bakoloba na bango wana maye bozalaki koboya kondima
  18. Ya sólo, buku ya bato malamu ekozala o’kati ya iliyíne
  19. Nani akoyebisayo eloko nini iliyíne
  20. Buku eye ekomama
  21. Ba anzelu ya pembeni ya Nkolo (Allah) bazali banzeneneke тропа yango
  22. Ya sólo bato ya malamu bakozala okati ya bisengo
  23. Likolo ya bakiti ya lokumu bazali kotalana
  24. Okoyeba bilembo bia bisengo o’bilongi bia bango
  25. Bakomela masanga ya sukali oyo esila kobongisama
  26. Etikaka solo ya mpimbo na suka lokola malasi, na yango esengeli nabaye bazali kolikia тропа yango basala molende
  27. Mpe esangisani na masanga ya tasmin (liziba)
  28. Baye bakozala pembeni na Nkolo (Allah) bako mela mayi ya liziba wana
  29. Ya soló, bato mabe bazalaki kotiola bandimi
  30. Mpe soki baleki pene na bango bazali (kodongola bango miso nako fina) miso na bango
  31. Mpe soki bazongi o’mabota na bango bazali kokosa bango
  32. Mpe soki bamoni bandimi balobi ete: Ya sólo, baye wana nde babunga nzela
  33. Nzoka nde batindamaki te bazala bakengeli likolo ya bandimi
  34. Kasi lelo bandimi bako tiola bapagano
  35. Likolo ya bakiti ya lokumu bazali kotala
  36. Bapagano bazwi te lifuta liye ekoki na bango na tina ya maye bazalaki kosala