84.The Splitting Open

  1. Ntango mapata mako pasuka
  2. Mpe makotosa Nkolo na yango, mpe ekosala maye esengeli esala
  3. Mpe ntango mabele makolalisama
  4. Mpe makosanza maye manso mazwami okati na yango mpe makotikala mpamba
  5. Mpe makotosa Nkolo na yango mpe ekosala oyo esengeli esala
  6. Oh yo moto! Ozali koyika mpiko тропа Nkolo nayo ntango nyoso yeba ete okokutana naye
  7. Moto oyo akoyamba buku naye na loboko naye ya mobali
  8. Akosambisama na ndenge ya malamu
  9. Mpe akozonga o’libota naye na esengo
  10. Kasi na moto oyo akoyamba buku naye nasima ya mokongo naye
  11. Akomisengela mabe
  12. Мре akozikisama okati ya moto ya makasi
  13. Ya soló, ye na mokili azalaki na esengo o’kati na libota naye
  14. Azalaki kokanisa te ete akosekwisama
  15. Kasi ya sólo, Nkolo naye azalaki kotala ye
  16. Te na lapi na ngonga ya mpokwa
  17. Mpe na lapi na butu na molili na yango
  18. Mpe na lapi na nsanza ntango ekomaka mobimba
  19. Ya sólo, bokolekanaka biteni na biteni
  20. Mpona nini bazali kondima te
  21. Mpe mpona nini bafukamaka te ntango kurani ezali kotangama likolo na bango
  22. Kasi bapengwi bazali kozwa yango lokuta
  23. Nzoka Allah ayebi maye bazali kobomba
  24. Pesa bango sango ya etumbu ya makasi
  25. Longola sé baye bandimi mpe basali misala ya malamu bazali na lifuta ya suka te