85.The Constellations

  1. (Na lapi) na mapata eye etonda minzoto
  2. Mpe na lapi na mokolo ya elaka
  3. Mpe na lapi na nzeneneke na baye bazali kotala
  4. Babomaki bato ya nsé ya ngomba
  5. Na moto etonda bankoni
  6. Mpe bango bazingaki yango yakofanda
  7. Mpe bazalaki kornona maye bazali kosala na bandimi
  8. Bayinamaki mpo ete bandimi na Allah wa nguya atonda lokumu
  9. Ye oyo azali na bokonzi ya likolo na nsé, Allah azali na boyebi na biloko binso
  10. Baye bazali konyokola bandimi ya mibali na ya basi, soki batubeli te bakozwa etumbu ya lifelo mpe monyokoli ya moto
  11. Ya soló, baye bandimi mpe basali misala ya malamu bakozwaka Iola eye mingala mizali kotiola na nsé na yango. Wana nde ezali elonga ya monene
  12. Ya sólo, etumbu ya Nkolo nayo ezali makasi
  13. Ye nde abandaka mpe azongelaka (bokeli)
  14. Mpe azali molimbisi mpe atonda bolingo
  15. Nkolo ya ngwende ya lokumu
  16. Asalaka maye alingi
  17. Ekomelaki yo te sango ya mapinga
  18. Ya Falo na Thamúd
  19. Kasi bapagano bazali sé koboya kondima
  20. Nzoka nde Allah azingi bango
  21. Kasi yango ezali kurani ya lokumu
  22. Ekomami likolo ya libaya liye libatelami epai na Allah