86.The Morning Star

  1. (Na lapi) na mapata mpe na monzoto y a butu
  2. Nani akoyebisa yo nini monzoto ya butu
  3. Ezali monzoto ya bongengi makasi
  4. Ezali na molimo moko te sé azala na mokengeli likolo naye
  5. Esengeli na moto ayeba na nini yango akelamaki
  6. Akelamaki kowuta na litanga ya mayi
  7. Ewuti o’kati na mokongo mpe mipanzi
  8. Ya soló Allah azali na nguya ya bozongisi ye na bomoyi
  9. Mokolo moye mitema mikobimisa maye ebombaki
  10. Akozala na nguya te mpe akozala na mosalisi te
  11. (Na lapi) na mapata maye mazali kokitisa mbula
  12. Мре (na lapi) na mabele maye mazali kofungwama
  13. Ya soló, oyo (kurani) ezali liloba ya bosembo
  14. Kasi ezali eloko ya pamba te
  15. Ya soló, bango bazali koyangela mwango
  16. Ngai mpe nazali na ya ngai mwango
  17. Pesa bapagano elaka, pesa bango elaka ya mokuse