87.The Most High

  1. S anzola kombo ya Nkolo nayo oyo azali na likolo koleka
  2. Oyo akela mpe akokisa
  3. Mpe atia mokano mpe akamba o nzela ya nsemba
  4. Mpe oyo abimisa matiti
  5. Mpe apesi yango langi ya mayi ya mpondu
  6. Tokotangisa yo na lolenge ete obosana te
  7. Sé na oyo ye moko Allah alingi, Nde ayebi maye mazali polele mpe maye mabombama
  8. Mpe tokolakisa yo nzela ya pete
  9. Pesa liteya na baye ekosalisa bango
  10. Oyo azali na bobangi nde akokanisa
  11. Oyo Akomitia mosika na yango ye nde moto ya mpasi
  12. Oyo akozika na moto ya monene
  13. O’nteyi na yango akokufa te mpe akozala na bomoyi te
  14. Asili kolonga oyo amipetoli
  15. Akanisi kombo ya Nkolo naye mpe asambeli
  16. Kasi bino bolingi na bolingo makasi bomoyi ya nsé
  17. Nzoka nde bomoyi ya lobi nde ezali malamu mpe ekowumelaka seko
  18. Ya sôló oyo esila kokomama na mikanda ya yambo
  19. Mikanda ya Ibrâhîm mpe ya Mûssa