89.The Dawn

  1. (Nalapi) na eleko ya ntongo
  2. (Mpe nalapi) na babutu zomi
  3. (Mpe nalapi) na motango libale, mpe na motango libale te
  4. (Mpe nalapi) na butu ntango esilaka
  5. Kolapa oyo ezali te mpo na moto oyo atonda mayele
  6. Omoni te ndenge Nkolo nayo asalaki na bato ya aad
  7. Na mboka Irama ndenge etongamaki na bandako ya likolo
  8. Mboka eye etongama te lolenge wana na mokili
  9. Mpe na bato ya Thamúd baye bazalaki kotobola mabanga okatikati ya bangomba
  10. Na Falo moto ya mapinga
  11. Bango banso bazalaki babuki mibeko o’kati ya bamboka na bango
  12. Mpe babebisaki mingi koleka
  13. Na yango Nkolo nayo akitiselaki bango fimbu ya etumbu
  14. Mpo ete Nkolo nayo azali kotala
  15. Moto azali soki Nkolo naye ameki ye na bokumisi ye mpe na bopesi ye bozwi alobi: Nkolo na ngai akumisi nga
  16. Kaši soki ameki ye na bokangeli ye bozwi alobi ete: Nkolo na ngai asundoli nga
  17. Kaši te, bino nde bosalisaka bana bitike te
  18. Mpe bolendisaka bato te pona koleisa babola
  19. Mpe bozalaki kólia bikitano (bozui mowei atiki) na ndenge ya mabe
  20. Mpe bolingi bomengo na bolingo ya makasi
  21. Kaši ntango mabele ekobalusama na ndenge ya somo
  22. Ntango Nkolo nayo akoya mpe ba anzelu bakozala milongo milongo
  23. Mpe bakoya na lifelo mokolo yango, mokolo wana moto akokanisa makanisi, kaši makanisi wana ekosalisa ye na eloko te
  24. Akoloba eh! Ngai mawa na ngai, soki nasalaki bolamu pona bomoyi na ngai
  25. Mokolo wana etumbu naye ekokokana na ya moto moko te
  26. Mpe moto moko te akokangama lokola ye
  27. Oh yo molimo y a kimia
  28. Zonga epai ya Nkolo nayo na bozongi ya esengo
  29. Kota elongo na bawumbu ba ngai
  30. Mpe kota okati ya lola na ngai