91.The Sun

  1. (Na lapi) na mwese mpe na bongengi na yango
  2. (Mpe na lapi) na sanza ntango elandaka mwese
  3. (Mpe na lapi) na moyi ntango ezali kongala
  4. (Mpe na lapi) na butu ntango ezipi (mokili)
  5. Mpe mapata na oyo atongi yango
  6. Mpe mabele na oyo atanda yango
  7. Mpe na molimo na oyo abongisa yango
  8. Mpe alakisi ye mabe naye mpe malamu naye (kobunga naye na bokambami)
  9. Asili kolonga moto oyo apetoli (molimo naye)
  10. Asili kobebisama oyo aboyi kopetola yango
  11. Bato ya Thamúd balekisaki ndelo mpe baboyi kondima
  12. Ntango moto mabe kati na bango atelemaki
  13. Motindami ya Allah alobaki na bango ete: Oyó ezali náqah ya Allah botika yango emela mayi
  14. Kasi baboyaki koyoka maloba naye mpe babomi yango, Nkolo na bango abomaki bango pona lisumu wana mpe akitisaki etumbu likolo na bango
  15. Mpe (Allah) azali na bobangi te na maye makoya sima