96.The Clot

  1. Tanga na kombo ya Nkolo nayo oyo akela
  2. Akela moto kowuta na liboke ya makila
  3. Tanga mpo Nkolo nayo azali malamu
  4. Oyo atangisi na ekomeli
  5. Atangisi moto maye azalaki koyeba te
  6. Kasi ya soló, moto akomi motomboki
  7. Ntango amimoni ete akomi na bozwi
  8. Nzoka nde bozongi ezali epai ya Nkolo nayo
  9. Omoni te moto oyo azali kopekisa
  10. Mowumbu (ya Allah) ntango azali kosambela
  11. Omonite soki azalaki na bokambi
  12. To mpe azali kotinda bato na bobangi Allah
  13. Omoni te soki aboyi kondima to apeși mokongo
  14. Ayebi te ete ya soló, Allah azali kornona
  15. Kasi soki atiki te, tokokanga ye na elongi naye
  16. Elongi ya moto ya lokuta mpe mosumuki
  17. Kasi abenga lisanga naye
  18. Biso tokobenga bakengeli ya lifelo
  19. Te, kotosa ye te, kasi pusana тре fukama (pembeni ya Nkolo nayo)